Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 9/06 lok. 1
  • Mokanda ya biro

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokanda ya biro
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Masolo mosusu
  • Betele ezali na mposa ya basali na bolingo malamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Yango ekoki kozala mosala oyo ebongi na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Yo mpe okoki komipesa?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Tómonisa botɔ́ndi mpo na “Ndako ya Nzambe”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2006
km 9/06 lok. 1

Mokanda ya biro

Bandeko basakoli ya Bokonzi,

Tozali na esengo ya koyebisa bino mwa makambo oyo etali mosala ya kotonga bandako misato ya sika na lopango ya Betele ya Kinshasa. Sikoyo, bandako yango nyonso misato etɛlɛmi, basilisi kobaka manzanza mpe misala ya nsuka mpo na kobongisa yango na kati ezali kokende malamu. Tozali mpe na esengo ya koyebisa bino ete mosala ya kobongisa mabelé mpo na kotonga ndako ya sika ya kolya mpo na libota ya Betele, oyo ekozala na bisika ya kofanda 450, mpe kuku, ebandaki na sanza ya Yuni 2006. Kompanyi moko oyo etongaka bandako awa na mboka na biso nde ezali kosala misala nyonso wana. Departema ya Betele oyo etalaka misala ya botongi ezali kolandela misala yango mpo na koyeba soki ezali kosalema malamu. Soki totali ndenge misala wana nyonso ezali kosalema malamu mpe kokende liboso, tokoki koloba ete Yehova azali mpenza kopambola ndako na ye mpo ekóma monene.

Lisusu, tolingi kozongisa matɔndi na ndenge bosalisaki na bolingo mpenza ebele ya bandeko oyo bazali komona mpasi mpo na bitumba.​—Yoane 13:35.

Na mobu oyo ya 2006, totindeli masangá 845 bilamba mpe basapato, na bisika oyo bandeko bazali konyokwama na bitumba. Lisangani ya Mikóló-Bakambi bandimaki ete tósalisa bandeko yango. Bandeko na biso ya Mpoto batindaki batɔni soki 21 ya bilamba mpe basapato. Na 2003 mpe 2004, tosalisaki mpe bandeko ya masangá mosusu ya teritware ya filiale na biso.

Tozali kosɛnga bino bókoba kobondela mpo na bandeko nyonso wana​—baoyo bakutanaki na mikakatano mpe baoyo bazali kosalisa bango.​—2 Kol. 1: 11.

Bandeko na bino,

Biro ya filiale ya Congo

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto