Biyano na mituna na bino
◼ Nani asengeli kosɛnga bayangani bátɛlɛma mpo na koyemba loyembo ya ebandeli na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, Likita ya mosala, Lisukulu ya bato nyonso, mpe boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, mpe ndenge nini akosala yango?
Loyembo ya ebandeli oyo eponami mpo na pɔsɔ mokomoko na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi etyamaka na Programɛ ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi oyo ezalaka na siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Ɔkɔtɔbɛ. Loyembo ya ebandeli mpe ya nsuka ya Likita ya mosala ya pɔsɔ mokomoko etyamaka na lokasa 2 ya Mosala na biso ya Bokonzi. Ndenge moko mpe, banimero ya nzembo mpo na boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli etyamaka na lokasa 2 ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mokomoko. Nzembo yango ezalaka mpo na eteni ya likita oyo batyeli yango; yango wana, esengeli ete ndeko oyo akotambwisa likita yango nde asɛnga bayangani bátɛlɛma mpo na koyemba nzembo yango, kasi te ndeko oyo atambwisaki likita oyo euti kosila.
Na ndakisa, mokɛngɛli na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi akotombela bayangani boyei malamu, akosɛnga bango bátɛlɛma mpo na koyemba loyembo ya ebandeli, akotambwisa eteyelo, mpe na nsima, akosɛnga molobi ya liboso na Likita ya mosala amata na estrade. Molobi ya liboso na Likita ya mosala nde akosɛnga bayangani bátɛlɛma mpo na koyemba loyembo ya ebandeli na Likita ya mosala.
Ndenge moko mpe, prezida nde akofungola Likita ya bato nyonso. Akotombela bayangani nyonso boyei malamu na esengo mpenza, mpe akosɛnga bango bátɛlɛma mpo na koyemba elongo loyembo ya ebandeli oyo molobi akopona. Prezida (to ndeko mosusu oyo akokisi masɛngami mpe aponamaki liboso) akosala libondeli ya ebandeli. Na nsima, prezida akoyebisa bayangani motó ya likambo ya lisukulu oyo molobi akosala mpe akosɛnga ye amata na estrade. Nsima ya lisukulu, prezida akoloba mwa maloba ya botɔndi mpo na mateya yango, kozanga ete azongela na mokuse lisukulu yango. Akoyebisa bayangani motó ya likambo ya lisukulu ya bato nyonso ya pɔsɔ oyo ekolanda, mpe na nsima akosɛnga bango bázela mpo na kolanda boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Ezali na ntina te ete prezida atuna bayangani soki bakolinga kotinda mbote na lisangá ya molobi-mopaya. Na nsima, prezida akosɛnga ndeko oyo akotambwisa boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli amata na estrade.
Ndeko oyo akotambwisa boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli nde akosɛnga bayangani bátɛlɛma mpo na koyemba loyembo ya ebandeli ya boyekoli yango. Akotambwisa boyekoli na kotalela malako ya moombo ya sembo mpe na nsima akosɛnga bayangani báyemba loyembo ya nsuka. Mingimingi, ndeko oyo akotambwisa boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli akobenga ndeko oyo asalaki lisukulu mpo asala libondeli ya nsuka.
Soki tozali kosalela malako oyo na masangá nyonso, makita na biso ekobanda kosalema ndenge moko.