Tozali na esengo ya komipesa mobimba na mosala ya Yehova!
1 Ntoma Paulo azalaki na esengo ya ‘komipesa mobimba’ mpo na kokokisa mosala na ye ya ministre moklisto. (2 Kol. 12:15) Ndenge moko mpe lelo oyo, baklisto mingi bazali kosala mosala ya mobongisi-nzela na molende mpenza. Basusu bazalaka na mikumba mingi na libota mpe bazalaka na ntango mingi te, atako bongo, basalaka makasi básakolaka pɔsɔ nyonso. Basusu mpe bazalaka na mikakatano makasi na nzoto, kasi basalelaka mwa makasi oyo batikali na yango mpo na kopesa mabɔkɔ na misala ya Bokonzi. Oyo nde esengo komona basaleli ya Yehova, mikóló mpe bana, bazali komipesa na mosala ya Yehova, atako bazali na bomoi ya ndenge nini!
2 Kolinga bazalani: Soki tozali kosalela Yehova na makoki na biso nyonso mpe tozali komonisa ete tolingaka Nzambe ná bazalani na biso, tokozala na lisosoli ya pɛto. Ntoma Paulo amipesaki mobimba na kosakola nsango malamu, yango wana alobaki na esengo nyonso boye: “Nazwi bino batatoli na mokolo ya lelo mpenza ete nazali pɛto na oyo etali makila ya bato nyonso.” (Mis. 20:24, 26; 1 Tes. 2:8) Soki tozali kosakola na ndenge oyo mpenza makoki na biso ezali kopesa nzela, tokozala na nyongo ya makila te.—Ezek. 3:18-21.
3 Komipesa mobimba na kosalisa basusu epesaka biso esengo. (Mis. 20:35) Ndeko mobali moko alobaki boye: “Na mpokwa, nsima ya kolekisa mokolo mobimba na mosala ya Yehova, lokuta mabe, nalɛmbaka mpenza. Kasi nazalaka na esengo, mpe natɔndaka Yehova mpo na ndenge apesi ngai esengo oyo moto moko te akoki kolongola yango.”
4 Kolinga Nzambe: Ntina mpenza oyo tomipesaka na mosala ya Yehova ezali mpo mosala yango esepelisaka Tata na biso ya likoló. Lokola tolingaka Nzambe, totosaka mitinda na ye, oyo esangisi mpe kosakola mpe kokómisa bato bayekoli. (1 Yoa. 5:3) Tomipesaka mobimba na mosala ya Yehova atako bato mosusu basepelaka na yango te to batɛmɛlaka biso.
5 Sikoyo ezali lisusu te ntango ya kolɛmbisa mabɔkɔ na mosala ya kosakola. Tozali na eleko ya kobuka mbuma. (Mat. 9:37) Na eleko ya kobuka mbuma, mosali-bilanga asalaka mosala bangonga mingi, mpamba te esɛngaka kobuka mbuma nokinoki liboso ebanda kopɔla. Ntango ya kobuka mbuma na elimo ezali mpe mokuse. Lokola toyebi eleko oyo tozali sikoyo, tiká ete biso nyonso tókoba komipesa mobimba na mosala ya kosakola.—Luka 13:24; 1 Kol. 7:29-31.