Tosepelaka na mapamboli mpe mikumba oyo tozwi!
1 Banda kala, Yehova apesaka basaleli na ye mapamboli mpe mikumba ndenge na ndenge. Apesaka yango na bato ya ndenge nyonso, basi to mibali, mikóló to bana, bazwi to babola. (Luka 1:41, 42; Mis. 7:46; Filp. 1:29) Mapamboli mpe mikumba nini apesi biso lelo oyo?
2 Ndambo ya mapamboli mpe mikumba tozwi: Tozwi lipamboli ya koteyama na Yehova. (Mat. 13:11, 15) Lipamboli mosusu oyo tosepelaka na yango ezali kokumisa Yehova na biyano oyo topesaka na makita. (Nz. 35:18) Ntango tozwi libaku ya kopesa biyano na makita, tolobaka na esengo nyonso. Ndenge moko mpe, soki totalelaka mokumba nyonso oyo bapesaka biso na lisangá lokola lipamboli, tokosala nyonso tókokisa yango malamu. Topesaka mabɔkɔ mbala na mbala mpo na kokokisa mokumba na biso ya kotya bopɛto na Ndako ya Bokonzi mpe kobongisa yango?
3 Atako bamilio ya bato bamitunaka soki Nzambe ayokaka mpenza mabondeli na bango, biso tozwi libaku malamu mpo Moto oyo aleki monene na molɔ́ngɔ́ mobimba ayokaka mabondeli na biso. (Mas. 15:29) Yehova ye moko nde ayokaka mabondeli ya basaleli na ye. (1 Pet. 3:12) Atye mobeko te ete tóbondelaka ye kaka na ntango boye to boye. Oyo nde likabo kitoko tozwi, ya kobondelaka ye na “libaku nyonso”!—Ef. 6:18.
4 “Bato oyo bazaali kosala elongo na Nzambe”: Moko ya mabaku malamu mpenza oyo tozwi ezali kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe mpe kozala “bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe.” (1 Kol. 3:9) Yango ezali mosala oyo epesaka esengo mpe ebɔndisaka. (Yoa. 4:34) Ezali kosɛnga kaka te ete Yehova asalela bato mpo na kokokisa mosala yango, bolingo nde etindi ye apesa biso mokumba wana. (Luka 19:39, 40) Atako Yehova aponi kosalela bato, kasi azali kopesa libaku malamu wana na moto nyonso te. Baoyo basakolaka ndako na ndako basengeli kokokisa masɛngami mpe kokoba komonisa bizaleli ya moto ya Nzambe. (Yis. 52:11) Tosalaka mpenza makasi tósakolaka pɔsɔ nyonso, mpo na komonisa ete topesaka motuya na libaku malamu oyo tozwi?
5 Mapamboli oyo Yehova apesaka biso esalisaka biso tózala na bomoi ya malamu. (Mas. 10:22) Tózwaka yango na lisɛki te! Ntango tomonisaka ete tozali kosepela mpenza na mikumba na biso, tosepelisaka Tata na biso ya likoló, Mopesi ya “likabo nyonso ya malamu mpe libonza nyonso oyo ekoki mpenza.”—Yak. 1:17.