Koboya te kosalela bato oyo ezali malamu!
1. Na likambo nini tosengeli ‘koboya te kosalela bato oyo ezali malamu’?
1 Ntango tosakolaka nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na molende, tomonisaka ete tozali ‘koboya te kosalela bato oyo ezali malamu’ na teritware na biso. (Mas. 3:27) Ezali na nsango moko te oyo bato basengeli koyoka lokola nsango malamu ya makambo kitoko oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala. Ekoki kozala ete oyebisaka bato elikya ya Bokonzi na molende, na kopesáká litatoli ya libaku malamu to na kokaboláká mikanda; kasi soki ozali kozanga moto ya koyekola na ye Biblia, mpo na nini te komityela mokano ya kobanda koyekola na moto Biblia?
2. Nini ekoki kotinda biso tókakatana mpo na kobanda koyekola na moto Biblia?
2 Ntango mosusu, ndenge na biso ya kotalela likambo yango nde esalaka ete tózanga moto ya koyekola na ye Biblia. Basusu bakakatanaka mpo na kobanda koyekola na moto Biblia mpo bakanisaka ete bakokoka te, to mpo bazalaka na ntango mingi te. Makanisi oyo elandi ekoki kosalisa yo okakatanaka te mpo na kobanda koyekola na bato Biblia.—Mat. 28:19; Mis. 20:20.
3. Mpo na nini tobongi mpenza mpo na koteya bato Biblia?
3 Soki okanisaka ete okokoka te: Ekoki kozala ete otánga kelasi mingi te to mpe makambo mosusu etindaka yo okanisa ete okokoka te koyekola na moto Biblia. Baklisto ya solo ya ntango ya kala bazalaki “bato batángá kelasi mingi te mpe bato mpamba.” Kasi, nini esalisaki bango báteya basusu mateya ya solo? “Bazalaki elongo na Yesu.” (Mis. 4:13) Bayekolaki epai ya Yesu Moteyi Monene, oyo mateya mpe mayele na ye ya koteya ebatelami na Makomami mpo na bolamu na biso. Ata soki otángá kelasi mingi te, ozali kozwa mateya oyo eleki nyonso, oyo euti na Makomami.—Yis. 50:4; 2 Kol. 3:5.
4. Ndakisa ya Amosa ekoki koteya biso nini?
4 Na bantango mosusu, Yehova asalelaki basakoli mpo na kosembola bakonzi oyo babungaki nzela to bato mosusu ya minene. Basakoli mosusu, lokola Amosa, bautaki na mabota ya bato minene te. Amosa ye moko alobaki boye: ‘Ngai nazalaki mosakoli te, nazalaki mpe mwana ya mosakoli te; kasi nazalaki mobateli na bibwɛlɛ mpe mopɛtoli ya nzete ya mosuke.’ (Amo. 7:14) Atako bongo, Amosa akakatanaki te mpo na koyebisa Amasia, nganga-nzambe mpe mosambeli ya mwana-ngɔmbɛ ya wolo, bitumbu oyo Yehova akanaki kopesa ye. (Amo. 7:16, 17) Tosengeli kobosanaka te ete mosala oyo tozali kosala ezali ya Nzambe mpe akopesa biso nyonso oyo esengeli mpo tósala yango.—2 Tim. 3:17.
5. Mpo na nini tosengeli kosala makasi tóbanda koyekola na bato Biblia, ata soki tozalaka na ntango mingi te?
5 Soki ozalaka na ntango mingi te: Ata soki ozalaka na ntango mingi te, na ntembe te obongisá mikolo oyo obimaka na mosala ya kosakola. Koyekola na moto Biblia ekoki kozala moko ya makambo oyo epesaka esengo koleka na mosala ya kosakola. Ezali libaku malamu mpenza komona ndenge Liloba ya Yehova ezali kosala mosala na bomoi ya moto. (Ebe. 4:12) Yehova asepelaka mingi komona biso tozali komipimela makambo mosusu mpo na kosalisa basusu “bákóma na boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Tim. 2:4) Ata baanzelu basepelaka mingi soki moto atiki misala na ye ya kala mpe abandi kokola na elimo.—Luka 15:10.
6. Libaku malamu nini tozwi na kokokisama ya mokano ya Nzambe?
6 ‘Mokano ya Nzambe ezali ete bato ya ndenge nyonso bábika mpe bákóma na boyebi ya sikisiki ya solo.’ (1 Tim. 2:4) Tozwi mpenza libaku malamu ya kosala na boyokani na mokano ya Nzambe, mpe tosengeli kokakatanaka te mpo na kobanda koyekola na bato Biblia.