Toyebisaka basusu elikya na biso ya Bokonzi
1 Na mikolo oyo ya nsuka mpe ya ndenge mosusu, bato mingi na mokili bazali na elikya te. (Ef. 2:12) Likambo ya mawa, bato mosusu batye motema na biloko ya mokili, bakonzi ya mokili, bokoli ya siansi, mpe bongo na bongo. Tozali na esengo mpenza na ndenge tozali na elikya ya solosolo mpo na mikolo ezali koya, elikya oyo ezali lokola “longo mpo na molimo, ezali makasi mpe ngwi”!—Ebe. 6:19.
2 Na boyangeli ya Bokonzi ya Nzambe, mabelé mobimba ekokóma paladiso. Bandeko na biso oyo bakufá bakosekwa. (Mis. 24:15) Bobola, kozanga bosembo, maladi, konuna, mpe liwa ekozala lisusu te. (Nz. 9:18; Mat. 12:20, 21; Emon. 21:3, 4) Wana nde ndambo ya bilaka ya Yehova oyo etikali moke ekokisama. Na bilaka nyonso wana, oyo wapi ozelaka na motema likoló?
3 Tóyebisa bato nsango malamu: Tosengeli kobomba elikya ya Bokonzi kaka mpo na biso moko te. Bolingo oyo tolingaka Nzambe mpe bazalani etindaka biso tómekola ndakisa ya Yesu ya “kosakola nsango malamu epai ya babola, . . . kosakola kosikolama epai ya bakangami mpe kofungwama ya miso epai ya bato oyo bakufá miso, mpo na kotika bato oyo batutamá ete bákende na bonsomi.” (Luka 4:18) Ntoma Paulo azalaki kosakola nsango malamu na zando mpe na bisika nyonso oyo azalaki kokuta bato. Azalaki komipesa mingi na mosala ya kosakola. (Mis. 18:5) Soki tolandi ndakisa na ye ya molende na mosala ya kosakola, “mitungisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo mpe nguya ya bokosi ya bomɛngo” ekolɛmbisa elikya na biso te.—Mko. 4:19.
4 Elikya na biso ya Bokonzi ezalaka ntango nyonso makasi ata soki tokutani na bato oyo baboyaka koyoka nsango ya Bokonzi, baoyo basepelaka mpenza na yango te, to baoyo batɛmɛlaka biso. ‘Tosimbaka makasi eyambweli ya elikya na biso kozanga kotengatenga.’ (Ebe. 10:23) ‘Toyokelaka nsango malamu nsɔni te.’ (Lom. 1:16) Soki bato bazali komona polele ete tozali na kondima mpe na molende, bakoki kondima koyoka biso.
5 Atako tobendaka likebi ya bato na makambo mabe oyo ezali koleka na mokili, oyo ezali kokokisa bisakweli ya Biblia, kasi tozali te basakoli ya nsango ya mawa. Tosakolaka nde elikya na biso ya Bokonzi, elingi koloba nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Tiká ete tósakolaka nsango malamu yango na kondima mpe na molende “mpo na kozala na kondimisama makasi ya elikya tii na nsuka.”—Ebe. 6:11.