Tóbɔndisa bato oyo batutami na motema
1 Lelo oyo bato bazali mpenza na mposa ya libɔndisi koleka na bileko mosusu nyonso. Lokola Mokonzi na biso Yesu Klisto, biso mpe tosalaka makasi ‘tóbongisa batutami na motema.’—Yis. 61:1.
2 Ndenge ya kobɔndisa bato: Mpo tóbɔndisa bato na mosala na biso ya kosakola, maloba na biso ya kobanda lisolo esengeli kozala ya kolendisa mpe oyo ebongi. Tosengeli kolobelaka mingi te makambo mabe ya mokili oyo mpe mateya ya lokuta mpo tózwa ntango mingi ya kolobela mateya ya solo mpe bilaka ya kobɔndisa oyo ezali na Liloba ya Nzambe. Elingi koloba te ete tokoboya kolobela Armagedona. Mokumba na biso esuki kaka te na kosakola “mbula ya boboto ya Yehova mpe mokolo oyo Nzambe na biso akozongisa mabe,” kasi mpe ya “kokebisa moto mabe mpo na nzela mabe na ye.” Nzokande, tosengeli kotika te ete makebisi etali Armagedona mpe mpasi oyo yango ekomemela bato mabe epekisa biso tólobela mingi motó ya likambo ya Nsango Malamu oyo na Bokonzi.—Yis. 61:2, NW; Ezek. 3:18; Mat. 24:14.
3 Na mosala ya ndako na ndako: Mbala mingi, tokutanaka na bato oyo batutami na motema mpo na maladi, mpo bakufeli moto, mpo basalelaki bango makambo na bosembo te, to mpo na mikakatano ya mbongo. Lokola Klisto, biso mpe ‘toyokelaka bato mawa’ mpe tomonisaka ete tomityaka na esika ya bato oyo tokutanaka na bango na mosala ya kosakola. (Luka 7:13; Lom. 12:15) Atako tokotángela moto vɛrsɛ moko to mibale oyo etali mokakatano na ye, tosengeli “koyokaka noki” mpe kotikela ye ntango ya kobimisa makanisi na ye. (Yak. 1:19) Soki toyoki moto liboso, tokoyeba ndenge ya kobɔndisa ye.
4 Na boumeli ya lisolo, tokoki koluka ntango oyo ebongi mpe koyebisa ye boye: “Nalingi natángela yo mwa maloba ya kolendisa na Biblia.” Tosengeli kozala na bososoli mpe koboya kokweisa likanisi nyonso ya libunga oyo moto akoki kobimisa. Tosengeli nde kosalela Makomami mpo na kolendisa bato mpe kobɔndisa bango. Mpo na yango, tokoki kosalela makambo oyo ezali na buku Comment raisonner à partir des Écritures nkasa 119-122, na motó ya likambo “Encouragement” (Kolendisama). To tokoki kopesa moto trakte Lisungi mpo na banyokwami na makanisi mpe kotalela yango elongo na ye.
5 Luká mabaku ya kobɔndisa basusu: Oyebi moninga moko ya kartye, ya kelasi, to moto moko ya libota na bino oyo azali na mposa ya libɔndisi? Mpo na nini te kosala makasi ya kokende kotala ye na ndako mpo na kobɔndisa ye na Makomami? Lokola oyebi eloko oyo ezali kotungisa ye, okoki kobongisa bavɛrsɛ oyo eyokani na mokakatano na ye. Basusu bakomelaka moto ya ndenge wana mokanda to babengaka ye na telefone mpo na kobɔndisa ye. Soki tolingaka mpenza bazalani na biso, tokoyokela bango mawa mpe tokosalela Makomami mpo na kobɔndisa bango.—Luka 10:25-37.
6 Ya solo, tozali na mokumba ya kobɔndisa bato oyo bazali kolela, kolendisa baoyo bazali na mawa, mpe kopesa bango elikya ya solosolo mpo na mikolo ezali koya. Na mokili mobimba, bato bazali na mposa ya libɔndisi yango. Soki tozali koyebisa bato ya mitema sembo na esengo mpenza ebele ya makambo kitoko oyo Nzambe alaki, tokobɔndisa bango mpe tokopesa bango elikya. Tiká ete tóbosanaka te kobɔndisa baoyo batutami na motema.