Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/08 lok. 1
  • Biso nyonso tozali na eloko ya kopesa Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biso nyonso tozali na eloko ya kopesa Yehova
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Masolo mosusu
  • Makambo oyo osengeli koyeba mpo na ndenge ya kosalela kura, esansi to mazuti
    Lamuká!—2017
  • Okomipimela makambo mosusu mpo na Bokonzi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Mpo na nini kopesa moto oyo azali na nyonso?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Ozali kokokisa mosala na yo malamumalamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2008
km 3/08 lok. 1

Biso nyonso tozali na eloko ya kopesa Yehova

1 Oyebaka ete bato mpe bakoki kopesa Nzambe eloko? Abele apesaki Yehova mbeka ya nyama oyo elekaki kitoko na etonga na ye; Noa ná Yobo bapesaki mpe Yehova mbeka ya ndenge wana. (Gen. 4:4; 8:20; Yobo 1:5) Toyebi ete makabo yango ebakiselaki Mozalisi eloko te, mpo biloko nyonso ezali ya ye. Kasi, bambeka yango emonisaki ete bato wana ya sembo balingaki Nzambe mingi. Lelo oyo, biso mpe tokoki kosalela ntango, makasi, mpe biloko na biso mpo na kopesa Yehova “mbeka ya lisanzoli.”​—Ebe. 13:15.

2 Ntango na biso: Ebongi mpenza kopesa longonya na bandeko oyo ‘bamisombelaka’ ntango oyo bakokaki kolekisa na makambo ya ntina mingi te mpo básakola mingi! (Ef. 5:15, 16) Mbala mosusu, tokoki kobongisa programɛ na biso mpo tósala mosala ya mobongisi-nzela mosungi sanza moko to basanza mingi na mbula. To, tokoki kobakisa mwa moke ntango oyo tolekisaka na mosala ya kosakola. Soki tobakisi miniti 30 na ngonga oyo tosakolaka pɔsɔ na pɔsɔ, na nsuka ya sanza tokobakisa ngonga soki mibale na ngonga oyo tosakolaka sanza na sanza!

3 Makasi na biso: Tosengeli koboya masano mpe misala oyo elɛmbisaka nzoto mpo tózala na makasi ya kosakola mpe kopesa Yehova oyo tozali na yango ya malamu koleka. Tosengeli mpe koboya mitungisi oyo ekoki ‘kolɛmbisa’ motema na biso mpe kosilisa biso makasi ya kosalela Nzambe. (Mas. 12:25, NW) Ata soki tozali na likambo mpenza oyo ezali kotungisa biso, ekozala malamu koleka ‘tókitisa mikumba na biso epai na Yehova’!​—Nz. 55:22; Filp. 4:6, 7.

4 Biloko na biso: Tokoki mpe kosalela biloko na biso mpo na kosimba mosala ya kosakola. Ntoma Paulo alendisaki bandeko na ye baklisto ‘bábombaka mwa eloko pembeni’ mbala na mbala, mpo na kozwa eloko ya kopesa baoyo bazangi. (1 Kol. 16:1, 2) Biso mpe, tokoki kobombaka mbongo mpo na kosunga lisangá na biso mpe mpo na kosimba mosala ya kosakola na mokili mobimba. Yehova asepelaka na oyo topesaka ye na motema mobimba, ata soki ezali moke.​—Luka 21:1-4.

5 Yehova apesá biso biloko mingi. (Yak. 1:17) Tokomonisa ete tozali na botɔndi epai na ye soki tozali kosalela ntango, makasi, mpe biloko na biso mosusu na mosala na ye. Soki tosali bongo, tokosepelisa Yehova, “mpo Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.”​—2 Kol. 9:7.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto