Teyá basusu bálinga Yehova
1. Nini etindaka bato mosusu bápusana penepene na Yehova?
1 Oyebi lisusu mbala ya liboso oyo bateyaki yo makambo ya Yehova? Makambo nini ebendaki yo epai na ye? Bato mingi ya mitema sembo balobaka ete koyeba bizaleli kitoko ya Mozalisi, mingi mpenza mawa mpe bolingo na ye, nde etindaki bango bápusana penepene na ye.—1 Yoa. 4:8.
2, 3. Ndenge nini tokoki kosalela buku Biblia eteyaka mpo na kosalisa bayekoli ya Biblia bálinga Yehova lisusu mingi?
2 “Oyo Nzambe na biso”: Buku Biblia eteyaka elobeli mingi bolingo ya Yehova mpe ntina oyo mokomoko na biso asengeli kozala na boyokani ya malamu elongo na ye. Ndenge nini tokoki kosalela buku yango mpo na koteya basusu bálinga Yehova lisusu mingi? Soki tozali kotalela liteya moko ya sika elongo na moto, tokoki kotuna ye mituna oyo ekotinda ye akanisa: “Liteya oyo ya Biblia emonisi nini mpo na bomoto ya Yehova?” to “Na ndenge nini liteya oyo emonisi polele ete Yehova azali Tata ya malamu koleka, oyo moto nyonso akosepela kozala na ye?” Soki tozali koteya moyekoli ndenge wana, tokosalisa ye akóma na boyokani ya libela elongo na Yehova.
3 Soki tozali kosalisa bayekoli ya Biblia báyeba ete ezali mpenza libaku malamu koyekola koyeba Nzambe kaka moko ya solo, oyo azali Nzambe ya bomoi, na ntembe te bakoloba ndenge Yisaya alobaki ete: “oyo Nzambe na biso.” (Yis. 25:9) Ntango tozali kolimbwela moto Liloba ya Nzambe, tosengeli kobendaka likebi na ye mingimingi na mapamboli oyo Nzambe akopesa bato ntango akokokisa mokano na ye na nzela ya bokonzi oyo apesi na mabɔkɔ ya Yesu Klisto.—Yis. 9:6, 7.
4, 5. Kolinga Yehova elimboli nini?
4 Makambo oyo emonisaka ete tolingaka Yehova: Toyebi ete mpo na kolinga Yehova na motema na biso mobimba, na molimo na biso mobimba, mpe na makanisi na biso nyonso, tosengeli kosuka kaka te na kosepela na ye mingi. Tosengeli kokóma na makanisi na ye mpe kotika yango etambwisa biso. (Nz. 97:10) Kolinga Nzambe elimboli kotosa mibeko na ye nyonso mpe kokoba kosala “misala ya etamboli ya bosantu,” ata soki tokutani na komekama to na botɛmɛli.—2 Pet. 3:11; 2 Yoa. 6.
5 Soki moto azali kosala mokano ya Nzambe mpo alingi ye, ayokaka esengo. (Nz. 40:8) Moyekoli ya Biblia asengeli koyeba ete mibeko nyonso oyo Nzambe atyá ezali mpo na bolamu ya seko ya basaleli na ye. (Det. 10:12, 13) Soki moto azali kotosa mibeko ya Yehova, azali komonisa ete azali na botɔndi mpo na misala na ye nyonso ya kitoko. Salisá moyekoli ayeba ete kotambola na banzela ya sembo ya Yehova ebatelaka moto na bampasi mingi.
6. Mapamboli nini moto oyo alingaka Yehova akoki kozwa?
6 Nzambe apambolaka bato oyo balingaka ye: Yehova amibanzabanzaka mpenza mpo na bato ya komikitisa oyo balingaka ye, mpe alakisaka bango “makambo mozindo ya Nzambe.” (1 Kol. 2:9, 10) Lokola bayebi malamu mokano ya Yehova, yango esalisaka bango bátalela mikolo ekoya na ndenge ebongi mpe bázala na elikya ya solosolo. (Yil. 29:11) Yehova amonisaka boboto mingi epai ya baoyo balingaka ye. (Ex. 20:6) Bazali na elikya ya kozwa bomoi ya seko, mpamba te Nzambe alingaka bango mingi.—Yoa. 3:16.
7. Oyokaka ndenge nini ntango oteyaka basusu bálinga Yehova?
7 Soki toyebi Tata na biso ya likoló malamu, tokosepela mingi koyebisa basusu makambo na ye. (Mat. 13:52) Ezali mpenza libaku malamu koteya basusu, mingi mpenza bana na biso, ete bálinga Yehova! (Det. 6:5-7) Tiká ete biso nyonso, bakisá mpe bato oyo toyekolaka na bango Biblia, tókoba kokumisa Yehova mpo na “malamu monene” oyo azali komonisela biso.—Nz. 145:7.