Mosala ya kosakola esɛngaka koyika mpiko
1 Ntoma Paulo apalanganisaki nsango malamu na esengo mpenza na boumeli ya mbula koleka 30. Akutanaki na mikakatano na mosala na ye ya kosakola, ndenge ezalaka na misala mosusu nyonso ya ntina. (2 Kol. 11:23-29) Atako bongo, alɛmbaki te. (2 Kol. 4:1) Ayebaki ete Yehova akopesa ye makasi ya koyika mpiko mpe kokoba kokokisa mosala yango. (Filp. 4:13) Paulo azali ndakisa malamu na ndenge ayikaki mpiko na bosembo mpenza; yango wana akokaki koloba boye: “Bókóma bamekoli na ngai, ndenge ngai mpe nazali ya Klisto.”—1 Kol. 11:1.
2 Koyika mpiko na mikakatano lelo oyo: Mokolo na mokolo, ebele ya bandeko na biso baklisto bazali kotyolama mpe kokutana na botɛmɛli oyo euti na bandeko na bango ya libota, baninga ya mosala to ya kelasi. (Mat. 10:35; Yoa. 15:20) Mbala mosusu, yango ezali mpe kokómela yo. Ekoki mpe kozala ete ozali na maladi moko oyo etungisaka yo to obundaka etumba mokolo na mokolo mpo na koboya masano to masɛnginya oyo ekoki komeka kondima na yo mpe kopekisa yo oyika mpiko. Tokoki kozwa makasi soki totaleli bandakisa ya basaleli ya sembo ya Yehova ya ntango ya kala mpe ya mikolo na biso, oyo bakutanaki na mikakatano mpe balongaki yango.—1 Pet. 5:9.
3 Tokozwa nguya ya kokangama makasi na mosala ya kosakola soki tozali kosala makasi ‘tólata molato mobimba ya etumba oyo mouti na Nzambe.’ (Ef. 6:10-13, 15) Tosengeli mpe kobondelaka mpo na koyika mpiko. Nzambe apesaka biso elimo santu mpo tóyika mpiko na mikakatano. (2 Kol. 6:4-7) Mpo tólonga etumba ya elimo, tosengeli kolanda makebisi ya Yehova mpe kozongisa makanisi na biso sika. (Nz. 119:24, 85-88) Soki tata oyo alingaka mwana na ye atindeli ye mokanda, mwana asepelaka kotánga yango mbala na mbala; ndenge moko mpe kotánga Biblia mokolo na mokolo esalisaka biso tókóma na boyokani malamu na Yehova. Soki toyekolaka Biblia biso moko mbala na mbala, tokoyeba ndenge ya kolonga mikakatano, tokoyeba makanisi ya Nzambe, tokotalela yango ntango tozali kozwa bikateli, mpe tokokangama na oyo ezali sembo.—Mas. 2:10, 11.
4 Ezaleli ya koyika mpiko ememaka mapamboli: Soki tozali koyika mpiko mpe kokokisa mosala na biso ya kosakola na bosembo nyonso lokola Paulo, tokosepelisa motema ya Yehova, tokozwa mapamboli, mpe basusu bakozwa mapamboli. (Mas. 27:11) Tiká tózwa ekateli ya kokoba kosakola; na ndenge yango tokomonisa ete kondima na biso ezali makasi mpe “ezali na motuya monene koleka wolo oyo ebebaka atako emekami na mɔtɔ.”—1 Pet. 1:6, 7.