Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 1/09 lok. 2
  • “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Masolo mosusu
  • Mokanda ya lisangani ya Mikóló-Bakambi
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
  • Mokanda ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • “Bolingo ya Nzambe elakisi boye”
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
  • Bolingo ya Nzambe eumelaka seko
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2009
km 1/09 lok. 2

“Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”

1. Buku “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe” ebimisamaki na mokano nini?

1 Tozali kozela na mposa makasi ntango oyo tokoyekola buku “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe” na Boyekoli ya Biblia na lisangá, kobanda na pɔsɔ ya 23 Febwali na masangá ya Lifalanse mpe ya Swahili, mpe na masangá ya Lingala ntango tokozwa yango! Mokanda ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi epai ya moto nyonso oyo alingaka Yehova esuki na maloba oyo: “Tozali mpenza na elikya ete buku oyo ekosalisa yo okoba kosalela mateya ya solo na bomoi na yo mpe, na ndenge yango, otikala na kati ya ‘bolingo ya Nzambe . . . mpo na bomoi ya seko.’​—Yuda 21.”

2. Buku ya sika ekosalisa biso na makambo nini ya bomoi na biso?

2 Makambo oyo tokoyekola na buku yango: Ndenge nini tokoki kosalela mitinda ya Biblia na makambo lokola kopona baninga, masano, kotosa bokonzi, bizaleli na biso, libala, maloba na biso, mpe mimeseno? Lisosoli na biso ekoteyama na kolanda mitinda ya sembo oyo ezali na Liloba ya Nzambe. (Nz. 19:7, 8) Soki toyebi malamu makanisi ya Yehova, tokokóma na mposa makasi ya kosepelisa ye mpe yango ekotinda biso tótosa ye na makambo nyonso ya bomoi na biso.​—Mas. 27:11; 1 Yoa. 5:3.

3. Mpo na nini tosengeli kosala nyonso mpo na kopesa biyano na boyekoli pɔsɔ na pɔsɔ?

3 Omityela mokano ya kopesa biyano: Ntango ozali kobongisa boyekoli, zalá na mokano ya kosanzola Nzambe na esika oyo basaleli na ye bayangani. (Ebe. 13:15) Lisangá mobimba ekobanda koyangana elongo mpo na koyekola buku yango ya sika. Lokola biteni ya koyekola ekozala milai te, yango ekosalisa biso tómibongisa malamu, mpe tópesa biyano ya malamu. Soki tozali komibongisa malamu mpe tozali kopesa biyano ya mikuse, yango ekopusa basusu na bolingo mpe na misala ya malamu; bandeko bakolendisama mpe bakozwa makanisi ya ntina na boyekoli yango. (Ebe. 10:24) Longola yango, tokotonda na esengo ntango tozali kolobela kondima na biso.

4. Mpo na nini tosengeli mpenza kotosa mibeko ya Yehova?

4 Na butu ya nsuka ya bomoi na ye lokola moto awa na mabelé, Yesu amonisaki ete mpo na kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe, esengeli kotosa mibeko na Ye. (Yoa. 15:10) Buku “Bolingo ya Nzambe” ekosalisa biso tózwa ekateli makasi ya kosalela mitinda ya Biblia na bomoi na biso ya mokolo na mokolo mpe ya ‘komibatela na kati ya bolingo ya Nzambe.’​—Yuda 21.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto