Yebá kosalisa ndeko oyo obimi na ye na mosala ya kosakola
1. Wapi matomba ya kobima ná ndeko mosusu na mosala ya kosakola?
1 Mokolo moko, Yesu atindaki bayekoli 70 na mosala ya kosakola, mpe “atindaki bango mibalemibale.” (Luka 10:1) Na ntembe te, ebongiseli yango epesaki bayekoli na ye likoki ya kosalisana mpe kolendisana ntango bazalaki kosakola. Ntango tobimi ná mosakoli mosusu na mosala ya kosakola, ndenge nini tokoki kosalisa ye?
2. Ntango ndeko oyo tobimi na ye na mosala ya kosakola azali kosolola na moto, ndenge nini mpe mpo na nini tosengeli koyoka?
2 Na koyoka: Yokáká na likebi ntango moninga na yo azali kosolola na moto. (Yak. 1:19) Ntango azali kotánga vɛrsɛ moko, landá na Biblia na yo. Taláká moto oyo azali koloba, ezala ndeko oyo bozali kosakola elongo na ye to moto oyo bozali koteya. Soki ozali kolanda lisolo na likebi mpenza, yango ekoki kotinda moto oyo bozali koteya atya mpe likebi.
3. Ntango nini ndeko oyo tozali kosakola ná ye akoki kosepela ete biso mpe tóloba?
3 Na koyeba ntango ya koloba: Ntango moninga azali kopesa litatoli, tokomonisa ete tozali kopesa ye lokumu, soki tozali kotika ye aloba. (Rom. 12:10) Tosengeli te kokataka ye maloba. Soki abosani likambo oyo alingaki koloba to soki moto oyo tozali koteya abimisi mwa ntembe to motuna moko, mpe moninga na biso asɛngi lisalisi, tokosala makasi tóbakisa nde makanisi na oyo ye alobi, kasi tóbimisa lisolo mosusu te. (Mas. 16:23; Mos. 3:1, 7) Soki tozwi maloba, makanisi na biso esengeli koyokana na motó ya likambo oyo tozali kolobela.—1 Ko. 14:8.
4. Nini ekosalisa biso mpo tózala na esengo mpe mosala na biso ebota mbuma?
4 Ntango bayekoli 70, oyo batindamaki mibalemibale, bakómaki na nsuka ya mosala na bango, “bazongaki na esengo.” (Luka 10:17) Biso mpe tokozala na esengo mpe mosala na biso ekobota mbuma soki tozali koyoka mpe koyeba ntango nini koloba mpo na kosalisa ndeko oyo tobimi ná ye na mosala ya kosakola.