Ndenge ya kosalisa bato ya sika mpo báyeba kosakola
1. Omiyokaki ndenge nini mbala ya liboso oyo obimaki na mosala ya kosakola?
1 Ozali koyeba lisusu mbala ya liboso oyo obimaki na mosala ya ndako na ndako? Ntango mosusu motema na yo ezalaki kobɛta. Soki obimaki ná ndeko oyo azalaki koyekola na yo Biblia to ná mosakoli mosusu, na ntembe te, osepelaki ndenge azalaki kosalisa yo. Sikoyo, lokola omesani na mosala ya kosakola, yo mpe okoki kosalisa bato ya sika mpo báyeba kosakola.
2. Basakoli ya sika basengeli koyekola makambo nini?
2 Basakoli ya sika basengeli koyeba ndenge ya kobanda lisolo ná moto, kosalela Biblia ntango bazali kopesa litatoli, kozongela bato oyo basepelaki, mpe kobanda koyekola na bato Biblia. Basengeli mpe koyeba kopesa litatoli na balabala, na bisika ya mombongo, mpe bongo na bongo. Ndakisa mpe batoli na yo ekoki kosalisa bango bámesana na makambo nyonso wana.
3. Ndenge nini ndakisa na biso ekoki kosalisa basakoli ya sika?
3 Ndakisa na yo: Yesu alakisaki bayekoli na ye ndenge ya kosakola. (Luka 8:1; 1 Pe. 2:21) Ntango olingi kobima na mosala ya kosakola ná mosakoli ya sika, bongisá lisolo moko ya pɛtɛɛ oyo mosakoli ya sika akoki komekola; okoki kosalela lisolo moko oyo epesami lokola ndakisa na mokanda moko ya moombo ya sembo. Na nsima, yo moko pesá litatoli na ndako ya liboso mpe ya mibale mpe sɛngá mosakoli ya sika alanda malamu makambo ozali koloba. Nzelanzela, okoki kotuna mosakoli yango ayebisa yo makambo nini ya malamu amoni na ndenge oyo opesi litatoli. Yango ekosalisa ye amona ntina ya kosakola elongo na basusu, mpe ekobongisa nzela mpo andima batoli oyo okoki kopesa ye ntango asilisi kopesa moto litatoli.
4. Ndenge nini tokoki kosalisa mosakoli ya sika nsima ya koyoka ndenge oyo auti kopesa litatoli?
4 Pesáká mwa batoli: Yesu apesaki mpe bayekoli na ye malako mpo na ndenge ya kosakola. (Mat. 10:5-14) Yo mpe okoki kosalela mayele yango mpo na kosalisa mosakoli ya sika. Soki ekómi ngala na ye ya koloba, yokáká ye malamu. Na nsima, ntango botiki ndako moko mpo na kokende na ndako mosusu, pesá ye longonya mpo na makambo ya malamu oyo asali, ata soki omoni mwa makambo mosusu oyo asengeli kobongisa. Liboso ya kopesa ye toli, okoki kotala naino soki asali malamu na ndako oyo elandi. Ntango mosusu, asalaki yango kaka mpo na kobanga. Kobosana mpe te ete basakoli nyonso bazali na makoki ndenge moko te, mpe ekoki kozala na lolenge mingi ya koloba likambo moko.—1 Ko. 12:4-7.
5. Tokoki koloba nini ntango tosepeli kopesa mosakoli ya sika toli?
5 Ntango mosusu, mosakoli ya sika akoki kotuna yo makambo oyo akoki kobongisa. Kasi, soki atuni te, yo moko yebisá ye yango. Ndenge nini okoki kosala yango malamu? Basakoli mosusu oyo bameseni na mosala yango batunaka kaka boye: “Nakoki kopesa yo mwa likanisi?” to “Omoni ete lisolo yango eleki ndenge nini?” To mpe, okoki koloba “Ntango nakómaki mosakoli sika, nazalaki kokoka te . . . , kasi eloko esalisaki ngai ezalaki . . .” Ntango mosusu, ezalaka malamu bótalela elongo makanisi ya buku Comment raisonner. Na esika ya kopesa ye ebele ya batoli na mbala moko, pesá ye toli kaka na likambo moko oyo asengeli kobongisa na ndenge oyo auti kopesa litatoli.
6. Na oyo etali mosala ya kosakola, na ndenge nini ‘ebende epelisaka ebende’?
6 Ebende epelisaka ebende: Paulo alendisaki Timote, mosakoli oyo amesanaki na mosala yango, ete akoba komipesa na koteya mpe akoba kokende liboso. (1 Tim. 4:13, 15) Ata soki ozali mosakoli banda bambula mingi, osengeli ntango nyonso kosala makasi mpo na kobongisa ndenge na yo ya kosakola. Ntango obimi ná mosakoli moko, ata oyo amesani mingi te na mosala ya kosakola, luká mwa makambo oyo okoki koyekola epai na ye. Luká mabaku ya kosalisa basusu na boboto mpenza, mingimingi basakoli ya sika, mpo báyeba malamu kosakola nsango malamu.—Mas. 27:17.