Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 7/10 lok. 2
  • Nazali kosala mingi na mosala ya kosakola?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nazali kosala mingi na mosala ya kosakola?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Masolo mosusu
  • Olingaka mpenza makambo oyo Yehova azongelaka?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Makundoli ya Yehova ebongi kotyelama motema
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Makundoli ya Yehova malendisaka biso na elimo?
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Kómisá makundoli ya Yehova esengo ya motema na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2010
km 7/10 lok. 2

Nazali kosala mingi na mosala ya kosakola?

1. Makambo nini ekoki kotungisa mokristo oyo azali sembo?

1 Osilá komituna motuna wana? Ntango mosusu molende na yo na mosala ya kosakola ekiti mpo okómi mobange, ozali kobɛlabɛla to mpo okómi na mikumba mingi ya libota mpe yango ezali kolɛmbisa yo. Ndeko mwasi moko oyo azali na bana misato akomaki ete ntango mosusu ayokaka lokola asalá lisumu mpo bangonga oyo alekisaka mpe milende oyo asalaka mpo na kokokisa bamposa ya libota na ye epekisaka ye asakola mingi. Nini ekosalisa biso tótalela likambo yango na ndenge ebongi?

2. Ndenge nini Yehova alingaka tósalela ye?

2 Ndenge oyo Yehova alingaka tósalela ye: Kozanga ntembe, biso nyonso tosepelaka kosala mingi na mosala ya kosakola. Kasi mbala mingi, bokeseni ezalaka kati ya makambo oyo tozalaka na mposa ya kosala ná oyo tokoki mpenza kosala. Lokola tozali na mposa ya kosala mingi, yango emonisi ete tosepelaka te kosala kaka moke. Tosengeli kobosana te ete Yehova ayebi biso malamu mpe asɛngaka biso kaka oyo tokoki kosala. (Nz. 103:13, 14) Ndenge nini Yehova alingaka tósalela ye? Alingaka tósalela ye na molimo na biso mobimba, tópesa ye oyo tozali na yango ya malamu koleka.​—Kol. 3:23.

3. Ndenge nini tokoki koyeba soki tozali kosala mingi to moke na mosala ya kosakola?

3 Nini ekoki kosalisa biso tóyeba oyo tozali na likoki ya kosala? Tokoki kobondela Yehova asalisa biso tómitalela mpo na komiyeba malamu. (Nz. 26:2) Moninga moko mokristo oyo akɔmeli, oyo ayebi biso malamu mpe akobanga te koyebisa biso bisika oyo tosengeli kobongisa akoki mpe kosalisa biso. (Mas. 27:9) Tóbosana mpe te ete lokola makambo ya bomoi na biso ebongwanaka, ekozala malamu tómitalelaka mbala na mbala.​—Ef. 5:10.

4. Ndenge nini tosengeli kotalela makundoli oyo euti na Biblia mpo na mosala ya kosakola?

4 Toyokaka ndenge nini soki bakundweli biso likambo? Na ntango ya momekano ya mbangu, bafana babelelaka bato na bango na mongongo makasi mpo na kolendisa bango. Basalaka bongo mpo na kolendisa bapoti-mbangu bákóma na nsuka, kasi te mpo na kolɛmbisa bango. Ndenge moko mpe ntango bakundwelaka mpe balendisaka biso na makita mpe na mikanda ya moombo ya sembo ete ‘tósakola na molende,’ ezalaka mpo na bolamu na biso, kasi te mpo na komonisa ete tozali kosakola moke. (2 Tim. 4:2) Tózala na kondima ete soki topesi Yehova oyo tozali na yango ya malamu koleka, akobosana te ‘bolingo mpe mosala na biso.’​—Ebr. 6:10.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto