‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
1. Buku nini masangá mosusu ekobanda koyekola na Boyekoli ya Biblia na lisangá kobanda na pɔsɔ ya 14 Marsi?
1 Kobanda na pɔsɔ ya 14 Marsi 2011, masangá ya Cibemba, Lifalanse, Lingelesi, mpe Swahili ekobanda koyekola buku ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe na Boyekoli ya Biblia na lisangá. Buku yango elobeli mokanda mobimba ya Misala na ndenge oyo ekosalisa motángi amona ndenge makambo oyo ekomami na mokanda yango ezalaki kosalema. Na esika ya kolimbola vɛrsɛ mokomoko ya mokanda ya Misala, buku Tópesa litatoli ebimisi nde mateya oyo tokoki kozwa na masolo oyo ezali na mokanda yango mpe esalisi biso tóyeba ndenge ya kosalela yango na bomoi na biso moko.—Rom. 15:4.
2. Yebisá makambo mosusu ya malamu oyo ezali na buku Tópesa litatoli.
2 Makambo ya malamu oyo ezali na buku yango: Maloba ya ebandeli oyo ezali na lokasa 2 ezali mokanda ya kolendisa oyo euti na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, oyo emonisi ndenge oyo balingi tózwa matomba na buku yango. Kobanda na mokapo ya 2, mokapo mokomoko ezali kolobela na mokuse makanisi ya ntina ya mokapo mpe eteni ya mokanda ya Misala oyo mokapo yango elobeli. Mikapo mingi ezali na bitanda oyo ezali kosalisa biso tóyeba mwa makambo oyo etali bato, bisika, mpe makambo mosusu oyo mokanda ya Misala elobeli. Bisika minene oyo etikali mpamba na mipanzi ya lokasa mokomoko ekosalisa yo okoma makanisi mosusu ya ntina. Buku yango mobimba ezali na bililingi kitoko oyo elimboli malamu makambo oyo mokanda ya Misala elobeli mpo na kosalisa biso tómona na makanisi makambo ya minene oyo esalemaki. Lokasa ya nsuka ezali na index ya bililingi, oyo elimboli bililingi mosusu. Soki ofungoli lokasa ya ezipeli ya ebandeli mpe ya nsuka okomona bakarte oyo ekosalisa yo omona ndenge mosala ezalaki kokola ntango bandeko na biso bakristo na ekeke ya liboso babandaki kopalanganisa nsango malamu “tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.”—Mis. 1:8.
3. Boyekoli na biso ya mokanda ya Misala ekosalisa biso tózwa biyano na mituna nini ya ntina?
3 Epesi biyano na mituna ya ntina: Koyekola buku ya Misala ekosalisa biso tóyeba polele biyano na mituna ya ntina oyo etali mosala ya kosakola. Na ndakisa, mosala nini mpe mateya nini esalisaka bato báyeba bayekoli ya solo ya Yesu Kristo? Banani batambwisaka mosala yango ya kosakola oyo ezali kosalema na mokili mobimba, mpe ndenge nini basalaka yango? Minyoko mpe botɛmɛli epesaka basakoli ya nsango malamu mabaku nini? Ndenge nini elimo santu esalisaka biso na mosala ya kosakola?
4. Tokoki kosala nini mpo tózwa mpenza matomba ntango tokoyekola buku Tópesa litatoli?
4 Mpo ozwa mpenza matomba ntango tokoyekola buku yango, tángáká liboso makambo oyo tokoyekola, mpe mibongisá mpo na kopesa biyano ntango tokoyekola yango na lisangá. Yanganáká na makita nyonso, mpe kanisá ndenge oyo okoki kosalela mateya oyo oyekoli ntango okobima na mosala ya kosakola. Tiká ete boyekoli ya buku wana ya kitoko elendisa biso tópesa litatoli malamumalamu mpo na Bokonzi ya Nzambe!—Mis. 28:23.