“Tiká pole na bino engɛnga”
1. Tozali na libaku ya kongɛngisa nini?
1 Kobanda ntɔngɔ tii mpokwa, kongɛnga ya moi epesaka Yehova Nzambe nkembo. Nzokande, ezali na pole ya ndenge mosusu oyo Yesu asɛngaki bayekoli na ye bázala na yango: “pole ya bomoi.” (Yoa. 8:12) Kozala na pole yango ya elimo ezali mpenza likabo euti epai na Yehova, oyo ebakiseli biso mpe mikumba minene. Yesu apesaki etinda oyo: “Tiká pole na bino engɛnga liboso ya bato,” mpo ememela basusu matomba. (Mat. 5:16) Lokola tofandi na mokili oyo ezali na molili makasi ya elimo, tosengeli kongɛngisa pole yango makasi koleka ndenge tomeseni kosala! Na ndakisa ya Kristo, ndenge nini tokoki kotika pole na biso engɛnga?
2. Ndenge nini Yesu amonisaki ete kongɛngisa pole ya elimo ezali na ntina mingi?
2 Na mosala ya kosakola: Yesu asalelaki ntango na ye, makasi na ye, mpe biloko na ye mpo na kongɛngisa pole ya solo na bandako ya bato, na bisika oyo bato bazalaka ebele, likoló ya bangomba; na mokuse, bisika nyonso oyo akokaki kokuta bato. Ayebaki ete pole ya solosolo ya elimo oyo azalaki komemela bato ekopesa bango mapamboli ya libela. (Yoa. 12:46) Mpo na koteya lisusu bato mingi koleka, Yesu apesaki bayekoli na ye formasyo mpo bázala “pole ya mokili.” (Mat. 5:14) Batikaki pole na bango engɛnga na ndenge bazalaki kosalela bazalani na bango makambo ya malamu mpe koteya bango solo ya Biblia.
3. Ndenge nini tokoki komonisa mpenza botɔndi mpo na pole ya solo?
3 Basaleli ya Nzambe bazwaka na lisɛki te mokumba na bango ya ‘kokoba kotambola lokola bana ya pole,’ mpe basakolaka bisika nyonso oyo bato bazali. (Ef. 5:8) Kotánga kaka Biblia to mikanda mosusu ya moombo ya sembo na esika oyo bato bazali komona yo na ntango ya bopemi na mosala to na kelasi ekoki kopesa yo nzela ya kobanda na moto lisolo ya Biblia. Ndeko mwasi moko ya elenge asalelaki mayele wana mpe abandaki koyekola Biblia na moto moko mpe akabolelaki bana kelasi 12 babuku!
4. Mpo na nini tokoki koloba ete ‘kotika pole na biso engɛnga’ etaleli mpe etamboli na biso ya malamu?
4 Na misala ya malamu: Kotika pole na biso engɛnga etaleli mpe etamboli na biso ya mokolo na mokolo. (Ef. 5:9) Na mosala, na eteyelo, mpe na bisika mosusu, bato bamonaka etamboli na biso ya malamu, mpe yango epesaka biso libaku ya koteya bango mateya ya Biblia. (1 Pe. 2:12) Na ndakisa, etamboli malamu ya mwana moko ya mbula mitano etindaki molakisi na ye abenga baboti ya mwana yango. Molakisi yango alobaki boye: “Naino namoná mwana moke boye te ayebi mpenza kokesenisa malamu ná mabe!” Ya solo, mosala na biso ya kosakola mpe etamboli na biso ya malamu ebendaka bato na “pole ya bomoi” mpe epesaka Nzambe na biso nkembo.