‘Tóyokelaka bamosusu mawa mpenza’
1. Bato bakómi mpenza na mposa ya nini lelo?
1 Bandá mokili ebandá, sikoyo nde bato mingi bakómi mpenza na mposa ete bámonisela bango motema mawa. Lokola makambo ezali kobeba se kobeba na mokili, bato mingi bazali lisusu na esengo te, bazali konyokwama na makanisi, mpe bazali lisusu na elikya te. Bamilio ya bato bazali na mposa ya lisungi, mpe biso bakristo tozali na likoki ya komonisa bazalani na biso ete tomibanzabanzaka mpenza mpo na bango. (Mat. 22:39; Gal. 6:10) Ndenge nini tokoki komonisa ete tomibanzabanzaka mpo na bango?
2. Wapi lolenge eleki malamu ya komonisela bato mosusu motema mawa?
2 Mosala oyo emonisaka motema mawa: Libɔndisi ya solo mpe oyo eumelaka eutaka kaka epai ya Nzambe. (2 Ko. 1:3, 4) Yehova alendisi biso tómekola ye na ‘koyokela bamosusu mawa mpenza,’ mpe apesi biso mokumba ya kokende koyebisa bazalani na biso nsango malamu ya Bokonzi. (1 Pe. 3:8) Kosala nyonso oyo tokoki kosala na mosala ya kosakola ezali lolenge eleki malamu ya kobɔndisa “bato oyo bazoki na mitema,” mpamba te Bokonzi ya Nzambe ezali elikya se moko mpo na bato oyo bazali konyokwama. (Yis. 61:1) Lokola Yehova ayokelaka bato na ye mawa, mosika te akolongola mabe nyonso mpe akotya mokili ya sika mpe ya sembo.—2 Pe. 3:13.
3. Ndenge nini tokoki kotalela bato ndenge Yesu azalaki kotalela bango?
3 Tótalela bato ndenge Yesu azalaki kotalela bango: Atako Yesu azalaki koteya bato ebele, azalaki te komona bato yango lokola etuluku moko boye. Azalaki kotalela mokomoko na bango lokola moto oyo azali na mposa ya kokolisa boyokani malamu ná Nzambe. Bazalaki lokola bampate oyo ezangi mobateli ya kokamba yango. Ntango Yesu amonaki bato yango, ayokaki mawa na motema na ye, mpe yango etindaki ye ateya bango na motema molai. (Mrk. 6:34) Kotalela bato ndenge Yesu azalaki kotalela bango ekotinda biso tómonisela mpenza mokomoko na bango motema mawa. Yango ekomonana na ndenge oyo tozali koloba na bango mpe na elongi na biso. Mosala ya kosakola ekozala na esika ya liboso na bomoi na biso, mpe tokobongisa maloba na biso mpo eyokana na bamposa ya moto mokomoko.—1 Ko. 9:19-23.
4. Mpo na nini tosengeli kolata ezaleli ya motema mawa?
4 Ebele ya bato ya bikólo nyonso bazali kondima nsango malamu ya Bokonzi mpe bazali kosepela na ndenge oyo tozali komibanzabanza mpo na bango. Soki tokobi kolata ezaleli ya motema mawa, tokopesa nkembo na Yehova, Nzambe na biso ya motema mawa, mpe tokosepelisa ye.—Kol. 3:12.