Salisá moto akanisa likoló ya makambo oyo ozali koteya ye
1. Mayele nini ebimisaka matomba mingi na mosala ya kosakola?
1 Mayele nini ebimisaka matomba mingi na mosala ya kosakola? Koluka kondimisa moto makambo oyo ozali koteya ye to kosalisa moto akanisa mpo ye moko akóma na likanisi ya malamu na likambo oyo bozali kolobela? Ntoma Paulo asalelaki mayele wana ntango azalaki koloba na Bayuda oyo bazalaki na Tesaloniki; yango wana “bamosusu na kati na bango bakómaki bandimi.” (Mis. 17:2-4) Makambo nini osengeli kotalela mpo na kosalisa moto akanisa likoló ya makambo oyo ozali koteya ye?
2. Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Paulo ntango tosakolaka nsango malamu?
2 Talelá makanisi mpe makambo ya bomoi na ye: Mpo na kosalisa moto akanisa likoló ya makambo oyo ozali koteya ye, osengeli kotalela makanisi mpe bindimeli ya bato ya teritware na bino. Na ebandeli ya diskur oyo Paulo asalaki na Aeropaje, liboso ya Bagrɛki oyo bazalaki kondimela Nzambe te, alobelaki makambo oyo bayebaki mpe bazalaki kondima. (Mis. 17:22-31) Na yango, ntango ozali komibongisa mpo na kopesa litatoli, talelá bindimeli ya bato ya teritware na bino mpe makanisi mabe oyo bazalaka na yango mpo na basusu. (1 Ko. 9:19-22) Soki moto abimisi ntembe, luká naino koyeba makambo oyo bino nyonso mibale bondimaka mpe kobá kosolola na ye na makambo yango.
3. Ndenge nini kotuna mituna oyo ebongi ekosalisa moto akanisa likoló ya likambo oyo tozali koteya ye?
3 Tuná mituna oyo ebongi: Soki tolingi kosalisa moto oyo azali kosala mobembo akóma na esika oyo azali kokende, esengeli naino tóyeba esika oyo azali. Ndenge moko mpe, soki tolingi kosalisa moto akóma na likanisi oyo ebongi na likambo oyo tozali koteya ye, esengeli naino tóyeba oyo ye akanisaka na likambo yango. Liboso Yesu asalisa moto akanisa likoló ya makambo oyo azalaki koteya ye, mbala mingi azalaki kotuna mituna mpo na koyeba oyo moto yango azalaki kokanisa. Na ndakisa, ntango moto moko atunaki Yesu ete, “Nasala nini mpo nazwa libula ya bomoi ya seko?,” Yesu alukaki naino koyeba makanisi ya moto yango liboso ya kopesa ye eyano. (Luka 10:25-28) Mokolo mosusu, ntango Petro apesaki eyano moko ya mabe, Yesu atunaki ye mituna oyo ebongi mpo na kosembola makanisi na ye. (Mat. 17:24-26) Na yango, soki moto atuni motuna to alobi likambo moko oyo ezali na nzela te, tokoki kotuna ye mituna mpo na kosalisa ye akanisa likoló ya likambo yango.
4. Mpo na nini tosengeli kosalisa moto akanisa likoló ya makambo oyo tozali koteya ye?
4 Ntango tozali kosalisa moto akanisa likoló ya makambo oyo tozali koteya ye, tozali komekola Yesu, Moteyi Monene, mpe basakoli mosusu ya liboso oyo bayebaki mpenza koteya. Soki tosali bongo, tokopesa moto oyo tozali koteya lokumu mpe limemya. (1 Pe. 3:15) Yango ekosala ete moto yango andima tózongela ye.