Mokanda yango ebebi to te?
Tosengeli mpenza komituna motuna wana mpo na mokanda nyonso oyo tolingi kokabola. Na mosala ya kosakola, soki topesi moto mokanda oyo efinanafinaná, enzuluká, ya salite, to epasuká, yango ekoki kobebisa lokumu ya ebongiseli ya Yehova. Ekoki mpe kosala ete moto atya lisusu likebi te na nsango kitoko mpe oyo ebikisaka bato, oyo ezali na mikanda na biso.
Ndenge nini tokoki kobatela mikanda na biso? Bandeko mingi bamonaka ete ezali malamu kotya mokanda na mokanda na esika na yango na kati ya sakosi. Na ndakisa, bazali na esika oyo batyaka babuku, esika mosusu mpo na bazulunalo mpe mwa babuku, esika mosusu mpo na batrakte, mpe bongo na bongo. Ntango bazongisaka Biblia mpe mikanda mosusu na sakosi, basalaka yango malɛmbɛ mpo mikanda yango ebeba te. Basakoli mosusu batyaka mikanda na bango na farde to sashɛ. Ezala totyaka mikanda na biso na esika nini, tolingi te kopesa moto mikanda oyo epasuká to ebebá, noki te aloba mabe mpo na mosala na biso.—2 Ko. 6:3.