Ezaleli nini eleki ntina mpo na kozala moteyi malamu?
1. Ezaleli nini eleki ntina moteyi malamu asengeli komonisa?
1 Nini esalisaka moto ateya Biblia malamu? Ezali nde bakelasi oyo atángá? Ebele ya makambo oyo ayebi? Makoki na ye ya kobotama? Te. Ezali nde ezaleli oyo ekokisi Mibeko nyonso mpe oyo ezali elembo mpo na koyeba bayekoli ya Yesu, ezaleli ya Yehova oyo eleki monene na bizaleli na ye minei ya minene, mpe oyo esepelisaka mingi koleka. (Yoa. 13:35; Gal. 5:14; 1 Yoa. 4:8) Ezaleli yango ezali bolingo. Bateyi malamu bamonisaka bolingo.
2. Mpo na nini ezali na ntina mingi ete tólingaka bato?
2 Lingá bato: Yesu, Moteyi Monene, azalaki kolinga bato, mpe yango ezalaki kotinda bango básepela koyoka ye. (Luka 5:12, 13; Yoa. 13:1; 15:13) Soki tozali komibanzabanza mpo na bato, tokomona mabaku mingi ya kopesa bango litatoli. Mikakatano lokola minyɔkɔ mpe botɛmɛli ekolɛmbisa biso te. Tokotyela mpenza bato oyo tosakwelaka likebi, mpe tokoyokanisa lisolo na biso na makambo oyo ezali kotungisa bango. Tokozwa mpenza ntango mpo na koyekola Biblia na moto mokomoko mpe mpo na komibongisa mbala nyonso oyo tolingi koyekola na moto.
3. Ndenge nini kolinga mateya ya solo ya Biblia esalisaka biso na mosala ya kosakola?
3 Lingá mateya ya solo ya Biblia: Yesu azalaki mpe kolinga mateya ya solo ya Biblia mpe azalaki komona yango lokola biloko ya motuya. (Mat. 13:52) Soki tolingaka mateya ya solo, tokoloba na esengo, mpe yango ekotinda bato báyoka biso. Kolinga mateya ya solo ekosalisa biso tótya likebi na nsango ya ntina mingi oyo tozali kosakola, na esika ya komitungisa soki tokosakola malamu to te; soki tosali bongo tokolongola kobanga na mosala ya kosakola.
4. Ndenge nini tokoki kokolisa bolingo na biso?
4 Kolisá bolingo: Ndenge nini tokoki kokolisa bolingo mpo na bato? Tokokolisa bolingo mpo na bato soki tozali komanyola na bolingo oyo Yehova mpe Mwana na ye bamonisaki, mpe na ndenge oyo bato ya teritware na biso babungá nzela mpe bazali na mposa ya kozonga na boyokani ná Nzambe. (Mrk. 6:34; 1 Yoa. 4:10, 11) Bolingo na biso mpo na mateya ya solo ya Biblia ekokola soki tozali koyekola biso moko mbala na mbala mpe komanyola. Bolingo ezali moko ya bizaleli ya mbuma ya elimo. (Gal. 5:22) Yango wana, tokoki kosɛnga Yehova apesa biso elimo santu na ye mpe asalisa biso tómonisa bolingo mingi. (Luka 11:13; 1 Yoa. 5:14) Ezala totángá bakelasi mingi to te, toumeli na kati ya solo to te, tozali na makoki mingi ya kobotama to te, tokoki kokóma bateyi malamu ya Biblia soki tozali na bolingo.