Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 5/12 lok. 1
  • Tózala ekɛngɛ ntango tozali kosakola

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tózala ekɛngɛ ntango tozali kosakola
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • Masolo mosusu
  • Biyano na mituna na bino
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Ozali kokokisa mosala na yo malamumalamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Tósala mosala na biso ya kosakola malamumalamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Mayele ya kosakola nsango malamu
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2012
km 5/12 lok. 1

Tózala ekɛngɛ ntango tozali kosakola

1. Mpo na nini tosengeli kozala ekɛngɛ ntango tozali kosakola?

1 Basaleli ya Nzambe bazali “lokola bampate na kati ya bambwa ya zamba” mpe bazali kosakola “na kati ya libota oyo etɛngamá mpe egumbamá.” (Mat. 10:16; Flp. 2:15) Mikolo oyo bansango ya mabe ekómi mingi ya bana-mboka oyo batomboki, ya bituluku ya bato bazali kosala mobulu, to ya bato bazali kolimwa, mpe yango emonisi ete bato mabe bakómi ‘kosala lisusu mabe koleka.’ (2 Tim. 3:13) Mitinda nini ya Biblia ekoki kosalisa biso mpo ‘tózala ekɛngɛ’ ntango tozali kosakola?​—Mat. 10:16.

2. Makambo nini ekoki kotinda biso tólongwa nokinoki epai tozali kosakola mpe tókende kosakola esika mosusu?

2 Zalá ekɛngɛ: Masese 22:3 elobi ete tokomonisa ete tozali ekɛngɛ soki ‘tomibombi’ liboso ya likama. Yango wana, tózala ekɛngɛ! Makambo ekoki kobongwana na mbalakaka ata na kartye oyo mobulu ezalaka te. Okoki komona bapolisi bayei ebele esika moko to bato batondani na balabala. Mbala mosusu moto oyo tozali kosolola na ye akoki kokebisa biso na boboto nyonso. Na esika ya kotɛlɛma wana mpe koluka koyeba likambo oyo ezali koleka, tómonisa nde bokɛngi, tólongwa nokinoki mpe tókoba kosakola na esika mosusu.​—Mas. 17:14; Yoa. 8:59; 1 Tes. 4:11.

3. Ndenge nini tokoki kosalela toli oyo ezali na Mosakoli 4:9 na mosala ya kosakola?

3 Kosakola yo moko te: Mosakoli 4:9 elobi ete: “Bato mibale baleki moto moko.” Ata soki omesaná kosakola yo moko, ekozala bwanya te osala yango lelo oyo. Ya solo, okoki kosakola yo moko na bisika mosusu. Kasi na bisika mosusu, ekozala malamu te ndeko mwasi to elenge asakola ndako na ndako ye moko, mingimingi na mpokwa. Emonani ete kosakola elongo na moninga oyo azali ekɛngɛ ezali na ntina mingi. (Mos. 4:10, 12) Sɛnzɛláká likoló ya basakoli oyo ozali kosakola elongo na bango. Zaláká na momeseno ya koyebisa basusu ete olongwe na teritware.

4. Tosengeli kosala nini mpo ata ndeko moko te na lisangá azwa likama?

4 Bankulutu bazali na mokumba ya kopesa malako oyo ebongi na kotalela ndenge makambo ezali na teritware ya lisangá mpo ‘bazali kokɛngɛla milimo na biso.’ (Ebr. 13:17) Yehova akopambola biso soki tozali na komikitisa mpe na botosi epai ya bankulutu. (Mika. 6:8; 1 Ko. 10:12) Tiká ete biso nyonso basaleli ya Nzambe tózala ekɛngɛ ntango tozali kopesa litatoli malamumalamu na teritware na biso.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto