Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 5/12 lok. 2
  • Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • Masolo mosusu
  • “Natye maloba na ngai na monɔkɔ na yo”
    Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
  • “Nakoki kofanda nyɛɛ te”
    Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
  • “Osengeli koloba na bango liloba oyo”
    Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
  • “Nakosilisa mposa ya molimo oyo elɛmbi”
    Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2012
km 5/12 lok. 2

Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia

1. Buku nini ebimaki na liyangani ya etúká ya 2010, mpe ndenge nini tokosalela yango?

1 Tosepelaki mingi ntango tozwaki buku ya sika na nkombo wana na liyangani ya etúká ya mobu 2010, oyo ezalaki na motó ya likambo “Tikalá penepene na Yehova!” Buku yango elobeli mateya oyo euti na mokanda ya Yirimia mpe ya Bileli, oyo tokoki kosalela na bomoi na biso ya mokolo na mokolo. (Rom. 15:4) Yango ebimisamaki mpo na kosalelama na Boyekoli ya Biblia na lisangá, mpe tokobanda koyekola yango na pɔsɔ ya 5 Novɛmbɛ 2012.

2. Kotalela mokanda ya Yirimia mpe ya Bileli ekosalisa biso na nini?

2 Esalisaka biso lelo oyo: Yirimia, oyo akomaki mokanda ya Yirimia na Biblia na litambwisi ya elimo ya Nzambe, asakolaki na eleko moko ya mobulu na Yuda. Na ebandeli, amonaki ete akokoka te kokokisa mosala oyo Nzambe apesaki ye. (Yir. 1:6) Anyokwamaki mpe na bato oyo ayebanaki na bango mpe mbala mosusu na bato ya engumba na ye Anatote. (Yir. 11:21, 22) Na yango, ekokamwisa biso te soki Yirimia alɛmbaki nzoto na ntango mosusu. (Yir. 20:14) Mbala mingi, biso mpe tokutanaka na mikakatano mpe tomiyokaka lokola Yirimia ntango tozali kokokisa mosala oyo Nzambe apesá biso ya ‘kokómisa bato bayekoli na bikólo nyonso.’ (Mat. 28:19) Kotalela makomi na ye ekosalisa biso tókokisa mosala na biso ya kosakola na molende mpe kozanga kobanga.

3. Ndenge nini tokosalela makambo mosusu oyo ezali na buku Yirimia?

3 Ndenge buku yango ebongisami: Bavɛrsɛ oyo esimbi lisolo, oyo tosengeli kotánga na boyekoli ezali na makomi oyo etɛngami mwa moke. Na nsuka ya boyekoli ya pɔsɔ mokomoko ezali na motuna moko to mituna mibale na makomi ya moindo, oyo ezongeli makanisi ya ntina ya liteya wana. Esengeli kotuna bayangani mituna yango na ntango ya bozongeli. Buku yango mobimba ezali na bililingi ya kitoko oyo bandeko ya lisangá bakosepela kolobela.

4. Ndenge nini tokoki kozwa matomba mingi na boyekoli ya mokanda ya Yirimia?

4 Omibongisaka liboso mpo ozwa mpenza matomba na boyekoli yango. Luká makanisi oyo okoki kosalela na bomoi na yo mpe na mosala ya kosakola. Pesáká biyano mingi na boyekoli. Na lisalisi ya Yehova, Yirimia akokisaki mosala na ye na esengo mpe na nsai. (Yir. 15:16) Tiká ete boyekoli ya mokanda wana ya sika esalisa biso tókokisa mosala na biso lokola Yirimia.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto