Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/12 lok. 1
  • Batelá lisosoli na yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Batelá lisosoli na yo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • Masolo mosusu
  • Ndenge nini okoki kobatela lisosoli ya malamu?
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
  • Zalá na lisosoli ya malamu na miso ya Nzambe
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Ndenge nini nakoki koteya lisosoli na ngai?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Lisosoli na yo eteyami malamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2012
km 8/12 lok. 1

Batelá lisosoli na yo

1. Motó ya likambo ya liyangani ya mokolo moko mpo na mobu ya mosala 2013 ezali nini, mpe liyangani yango ekosalisa biso na nini?

1 Mokolo na mokolo, tokutanaka na makambo oyo ekoki kobebisa lisosoli na biso. Yango wana, liyangani ya mokolo moko mpo na mobu ya mosala 2013, oyo ekobanda mokolo ya 1 Sɛtɛmbɛ 2012, ezali na motó ya likambo “Batelá lisosoli na yo.” (1 Tim. 1:19) Programɛ yango ebongisami mpo na kosalisa mokomoko na biso atalela malamumalamu ndenge oyo azali kosalela lisosoli na ye, likabo wana malamu oyo Nzambe apesá biso.

2. Wapi mituna ya minene oyo tokozwa biyano na yango na liyangani?

2 Tyá likebi na makambo oyo: Liyangani yango ekopesa biyano na mituna nsambo ya minene oyo etali lisosoli:

• Nini ekoki kobebisa lisosoli na biso?

• Ndenge nini tokoki koteya lisosoli na biso?

• Ndenge nini tokoki kozala pɛto na makila ya bato nyonso?

• Kozala na makanisi mpe na etamboli oyo eyokani na mitinda ya Biblia, ekomonisa ete tozali bato ya ndenge nini?

• Ndenge nini tokoki koboya kozokisa basusu na makambo oyo ezali kosɛnga kosalela lisosoli?

• Bilenge, bokoki kosala nini mpo bókanga motema ntango bazali kotinda bino bósala makambo ya mabe?

• Matomba nini baoyo bazali kolanda lisosoli na bango oyo eteyami na Biblia bakozwa?

3. Ndenge nini tokoki kozwa matomba na liyangani yango?

3 Na lisalisi ya Yehova tokoki kotɛmɛla Satana na milende oyo azali kosala mpo na kobebisa lisosoli na biso. Na nzela ya Liloba na ye mpe ebongiseli na ye, Tata na biso ya likoló oyo atondi na bolingo azali koyebisa biso ete: “Nzela yango oyo. Bótambola na yango.” (Yis. 30:21) Liyangani oyo ezali moko ya bibongiseli oyo Yehova azali kosalela mpo na kolakisa biso nzela. Na yango, zwá bibongiseli mpo ozala na liyangani yango banda ebandeli tii nsuka. Landá na likebi, mpe talelá ndenge oyo yo moko okoki kosalela makambo yango. Bósolola makambo oyo bokoyoka na liyangani na kati ya libota. Kosalela makambo oyo tokoyoka, ekolendisa biso tókoba ‘kozala na lisosoli ya malamu,’ mpe koboya bisengo ya mokili ya Satana oyo ekoki kobungisa biso nzela.​—1 Pe. 3:16.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto