Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 7/13 lok. 1
  • Tómekola ndakisa ya basakoli—Yoele

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tómekola ndakisa ya basakoli—Yoele
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Masolo mosusu
  • Mokanda ya Biblia nimero 29—Yoele
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Koyika mpiko na mikakatano elendisaki elikya na biso epai ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Etumba moko oyo euti na nɔrdi!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Nani “Akobika”?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2013
km 7/13 lok. 1

Tómekola ndakisa ya basakoli​—Yoele

1. Na mosala na biso ya kosakola, ndenge nini tokoki komekola komikitisa ya Yoele?

1 Mosakoli Yoele azalaki nani? Alobi kaka ete azalaki “mwana ya Petuele.” (Yoe. 1:1) Mosakoli yango ya komikitisa abendaki likebi mingi na nsango ya Yehova, kasi te na mokumba na ye ya momemi nsango. Ndenge moko mpe na mosala na biso ya kosakola, na esika ya koluka ete bato bákumisa biso to báyeba biso, totindaka nde bango bátya likebi epai ya Yehova mpe na Biblia. (1 Ko. 9:16; 2 Ko. 3:5) Lisusu, nsango oyo tosakolaka epesaka biso makasi. Na makambo nini esakweli ya Yoele ekoki kopesa biso molende mpe elikya lelo oyo?

2. Lokola mokolo ya Yehova ekomi mpenza pene, yango esengeli kotinda biso tósala nini?

2 “Mokolo ya Yehova ekómi pene.” (Yoe. 1:15): Atako bambula mingi mpenza eleká kobanda maloba wana ekomamaki, sikoyo nde eleko ya kokokisama na yango ya nsuka. Ndenge oyo makambo ya mokili ezali kobeba se kobeba, mpe bato bazali kotya likebi te mpe kosɛka biso ntango tozali kosakola, ezali komonisa polele ete tokómi na nsuka ya ebongiseli oyo mabe. (2 Tim. 3:1-5; 2 Pe. 3:3, 4) Lokola tozali komona ndenge nsuka ekómi mpenza pene, tosengeli kotya mosala ya kosakola na esika ya liboso na bomoi na biso.​—2 Pe. 3:11, 12.

3. Mpo na nini mosala ya kosakola ezali na ntina mpenza, mingimingi lokola bolɔzi monene ekómi pene?

3 “Yehova akozala esika ya kobombana ya bato na ye.” (Yoe. 3:16): Kolɛnga oyo vɛrsɛ yango elobeli ekoki kosalema kaka na mokolo oyo Yehova akopesa bato mabe etumbu na bolɔzi monene. Tozali kobɔndisama na koyeba ete Yehova akobikisa basaleli na ye ya sembo na ntango yango. (Em. 7:9, 14) Ntango tozali kosakola mpe komona ndenge oyo Yehova azali kosunga mpe kolendisa biso, kondima mpe mpiko na biso ezali kokóma makasi, mpe yango ekosalisa biso na bolɔzi monene oyo ekómi pene.

4. Mpo na nini tokoki kozala na esengo mpe kozala na elikya mpo na mikolo ezali koya?

4 Atako bato mosusu balobaka ete nsango ya Yoele ezali ya mawa, ezali nde kopesa basaleli ya Nzambe elikya ete bakosikolama. (Yoe. 2:32) Na yango, tiká tózala na elikya mpo na mikolo ezali koya mpe tósakola na molende nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe, wana tozali kolanda maloba ya Yoele 2:23 oyo elobi: “Bózala na esengo mpe bósepela mpo na Yehova Nzambe na bino.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto