Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/13 lok. 1
  • Landá ndakisa ya basakoli—Hosea

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Landá ndakisa ya basakoli—Hosea
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Masolo mosusu
  • Esakweli ya Hosea ezali kosalisa biso tótambola elongo na Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mokanda ya Biblia nimero 28—Hosea
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Makanisi ya ntina na mokanda ya Hosea
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Tambolá elongo na Nzambe mpo obuka oyo ezali malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2013
km 11/13 lok. 1

Landá ndakisa ya basakoli​—Hosea

1. Motuna nini mbala mosusu osilá komituna?

1 Mbala mosusu osilá komituna boye: ‘Makambo nini nakoki komipimela mpo na Yehova?’ Omitunaki bongo ntango ozalaki komanyola likoló ya bolamu mingi mpe motema mawa ya Yehova. (Nz. 103:2-4; 116:12) Mosakoli Hosea andimaki kozanga kokakatana kosala oyo Yehova asɛngaki ye, atako yango esɛngaki amipimela makambo mosusu. Ndenge nini tokoki komekola Hosea?

2. Mpo na nini Hosea azali ndakisa malamu mpo na biso na oyo etali kokoba kosakola?

2 Sakolá na eleko ya mpasi: Nsango ya Hosea etalelaki mpenza bokonzi ya mabota zomi ya Yisraele, epai losambo ya solo ebandaki kolimwa mokemoke. Mokonzi Yeroboame II asalaki oyo ezali mabe na miso ya Yehova mpe akobaki na losambo ya mwana na ngɔmbɛ oyo Yeroboame I abandisaki. (2 Bak. 14:23, 24) Bakonzi oyo balandanaki na nsima bakobaki komema bokonzi ya mabota zomi ya Yisraele na losambo ya bikeko tii nsukansuka bokonzi yango ebebisamaki na mobu 740 L.T.B. Nzokande, atako losambo ya lokuta epalanganaki mingi, Hosea asalaki mosala na ye ya mosakoli na bosembo nyonso na boumeli ya mbula soki 59. Biso mpe, tozali na ekateli ya kokoba kosakola, atako bato bazali kosepela na nsango malamu te to bazali kotɛmɛla biso?​—2 Tim. 4:2.

3. Ndenge nini bomoi ya Hosea emonisi motema mawa ya Yehova?

3 Tyá likebi na motema mawa ya Yehova: Yehova ayebisaki Hosea abala “mwasi oyo akosala pite.” (Hos. 1:2) Atako mwasi na ye, Gomere, abotelaki ye mwana mobali, emonani ete na nsima abotaki bana mibale na mobali mosusu. Bosembo ya Hosea mpe ezaleli na ye ya kolimbisa emonisaki mawa monene ya Yehova epai ya libota ya Yisraele oyo epɛngwaki. (Hos. 3:1; Rom. 9:22-26) Biso mpe, tondimaka kozanga kokakatana komipimela makambo oyo tolingaka mpo na komonisa motema mawa ya Yehova epai ya bato ya ndenge nyonso?​—1 Ko. 9:19-23.

4. Wapi makambo mosusu oyo tokoki komipimela mpo na Yehova?

4 Basaleli mosusu ya Yehova batikaki misala ya mbongo mingi mpo bámipesa mingi na mosala ya kosakola. Bamosusu batikali minzemba to baboti te mpo bákoba kopesa mabɔkɔ na matomba ya Bokonzi. Ntango tozali kokanisa na bomoi ya Hosea, tokoki koloba ete: ‘Nakokaki kosala yango ata moke te.’ Kasi, wana botɔndi na biso mpo na boboto monene ya Yehova ezali kobakisama mpe tozali kotya motema na elimo santu na ye mpo epesa biso makasi, akoki kosalela biso na ndenge oyo tokokaki ata kokanisa te, ndenge asalelaki Hosea.​—Mat. 19:26; Flp. 2:13.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto