Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/14 nk. 2-3
  • Mbula nkama moko ya kosakola Bokonzi!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mbula nkama moko ya kosakola Bokonzi!
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Masolo mosusu
  • 1914-2014: Mbula nkama moko ya boyangeli ya Bokonzi!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Mbula 100 ya Boyangeli—Eteyi yo nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Mpo na nini kotyela Bokonzi ya Nzambe likebi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Basakoli ya Bokonzi​​—Bato bamipesi na bolingo na bango moko
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2014
km 8/14 nk. 2-3

Mbula nkama moko ya kosakola Bokonzi!

1. Eleki sikoyo pene na mbula nkama moko, basaleli ya Yehova balendisamaki na kosala nini?

1 “Bótala, Mokonzi azali koyangela! Bino nde bapalanganisi ya nsango na ye. Na yango bósakola, bósakola, bósakola Mokonzi mpe bokonzi na ye.” Maloba wana ya kolendisa, elobamaki na ndeko Rutherford eleki sikoyo pene na mbula nkama moko. Na maloba yango, basaleli ya Yehova balendisamaki ete bápalanganisa nsango ya Bokonzi bipai nyonso. Mpe yango nde tosali! Ndenge moko na bakristo ya liboso, tosili kosakola nsango malamu ya Bokonzi na “bikólo nyonso oyo ezali na nse ya lola.” (Kol. 1:23) Na kotalela makambo oyo esalemi na mbula nkama oyo eleki, tosali nini mpo na kosakola Bokonzi ya Nzambe? Lokola etikali moke mbula 100 ekoka banda Bokonzi ebandaki koyangela, ndenge nini tokoki kokoba kopalanganisa nsango na yango?

2. Na ndenge nini mikanda na biso elobelaka Bokonzi ya Nzambe?

2 Makambo oyo esalemi: Na boumeli ya bambula mingi, mikanda na biso elobelaka Bokonzi ya Nzambe. Kobanda mobu 1939, zulunalo na biso ya libosoliboso ezalaka na motó ya likambo: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova. Zulunalo yango elobelaka mbala na mbala Bokonzi mpe makambo oyo ekosala. Zulunalo Lamuká! mpe ebendaka likebi na Bokonzi ya Nzambe ete ezali elikya kaka moko mpo na bato. Yango wana bazulunalo yango mibale ezali sikoyo kobongolama mpe kokabolama mingi na mokili!​—Em. 14:6.

3. Wapi mayele mosusu oyo tosili kosalela mpo na kopalanganisa nsango ya Bokonzi?

3 Basaleli ya Yehova basalelaki mayele ndenge na ndenge mpo na kopalanganisa nsango ya Bokonzi. Na ebandeli, tozalaki kosalela mituka oyo ezalaki na bikoliseli lolaka, baradio mpe bafɔnɔ. Mayele wana esalisaki na kopalanganisa nsango malamu epai ya bato mingi na mbala moko, na ntango oyo basakoli ya Bokonzi bazalaki naino moke. (Nz. 19:4) Na bambula oyo euti koleka, tobimisi masolo na nzela site jw.org, mpe na ndenge yango tosakoli Bokonzi epai ya bamilio ya bato, ezala na mikili epai mosala na biso epekisami.

4. Wapi mayele mosusu oyo tobandisaki?

4 Basaleli ya Yehova babandisaki mpe mayele mosusu ya sika ya kopalanganisa nsango ya Bokonzi. Na ndakisa, kobanda na mobu 1995, longola kosakola ndako na ndako, tosalaki mpe milende ya kobanda kosakola na baparke, na bisika batɛlɛmisaka mituka mpe na bisika ya mombongo. Toutaki mpe kobongisa lolenge moko ya sika ya kopesa litatoli na bingumba ya minene bipai nyonso na mokili. Longola yango, masangá mingi ezali kosalela lolenge ya kosakola na kotya bashario mpe bamesa na bisika oyo bato balekaka mingi na bateritware na bango. Atako bongo, totyaka mosala ya kosakola ndako na ndako na esika ya liboso na mosala na biso ya kosakola Bokonzi.​—Mis. 20:20.

5. Mabaku nini mobu ya sika ya mosala ekopesa mingi kati na biso?

5 Makambo oyo ekosalema: Lokola mobu ya sika ya mosala ekobanda na sanza ya libwa, bandeko mingi bakobanda mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Yo mpe okozala moko na bango? Soki te, okoki nde kosalaka mosala ya mobongisi-nzela mosungi mbala na mbala? Ezala ozali na likoki ya kozala mobongisi-nzela to te, Yehova akopambola yo mpo na milende nyonso oyo okosala mpo na kopesa mpenza mabɔkɔ na kopalanganisa nsango ya Bokonzi.​—Mal. 3:10.

6. Mpo na nini sanza ya zomi 2014 ekozala sanza ya ntina mingi?

6 Mbula nkama moko (100) ekokoka na sanza ya zomi 2014 banda Bokonzi etyamaki. Yango wana, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya bato nyonso ya sanza yango ebendi likebi na Bokonzi ya Nzambe. Ekozala malamu kosala makasi ya kopesa bato ebele zulunalo yango! Wana tozali kozela makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya, tiká ete mokomoko na biso akoba “kosakola nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe” epai ya bato nyonso oyo bakoyoka.​—Mis. 8:12.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto