Landá ndakisa ya basakoli—Nahumu
1. Mokanda ya Nahumu eteyi biso nini?
1 Bilembeteli ya kobebisama ya Ninive endimisi biso ete kaka ndenge Nahumu asakolaki, Yehova azongiselaka banguna na ye mabe mpe ete ata monguna ya makasi mingi akoki te kotɛmɛla ye. (Nah. 1:2, 6) Kotalela malamumalamu esakweli ya Nahumu ekosalisa biso mpenza na mosala na biso ya kosakola.
2. Ndenge nini tokoki kosala mpo ete nsango na biso ezalaka ntango nyonso ya kolendisa?
2 Pesáká libɔndisi mpe elikya: Na ebandeli, mokanda ya Nahumu emonanaka lokola ezali kaka liyebisi ya lisambisi mpo na Ninive, engumba-mokonzi ya Asiri oyo etondaki na lolendo. (Nah. 1:1; 3:7) Nzokande, liyebisi yango eyaki lokola nsango malamu mpo na libota ya Yehova. Nahumu, oyo nkombo na ye elimboli “Mobɔndisi,” alendisaki bandeko na ye Bayuda ete mosika te, monguna na bango akozala lisusu te! Lisusu, Nahumu amonisaki mpenza ete Yehova azali “esika makasi ya libateli na mokolo ya mpasi.” (Nah. 1:7) Wana tozali kosakola, biso mpe toyebisaka bato nsango malamu mpe tolendisaka bango báluka libateli epai ya Yehova.—Nah. 1:15.
3. Ndenge nini tokoki komekola Nahumu na oyo etali kosalela bandakisa?
3 Saleláká bandakisa: Yehova apesaki Nahumu elimo santu mpo akokanisa nsuka ya Ninive na oyo ya engumba Thèbes (No-amone) ya Ezipito, oyo Asiri ye moko abebisaki liboso. (Nah. 3:8-10) Ntango tozali koyebisa bato mpo na nsuka ya ebongiseli mabe ya ntango oyo, tokoki komonisa bisakweli ya Biblia oyo endimisi ete Yehova akokisaka liloba na ye ata na makambo ya mikemike. Na ndakisa, ntango bato ya Babilone mpe Bamede bayaki kobundisa engumba Ninive na mobu 632 L.T.B., bambula makasi etondisaki Ebale Tigre mpe mai na yango ezindisaki eteni moko ya engumba mpe ebukaki bifelo na yango ya makasi mpenza. Na yango, Ninive ekweaki noki, kaka ndenge Yehova asakolaki.—Nah. 1:8; 2:6.
4. Na mosala ya kosakola, ndenge nini tokoki koloba polele mpe na ndenge oyo bato bakokanga ntina?
4 Lobáká polele mpe na ndenge oyo bato bakokanga ntina: Nahumu apesaki bandimbola mpe asalelaki elobeli ya kosimba motema na mokanda na ye. Makambo akomaki ezali polelepolele. (Nah. 1:14; 3:1) Ndenge moko mpe, tosengeli kosalelaka maloba oyo ezali pɛtɛɛ mpo bato bákanga ntina na yango. (1 Ko. 14:9) Na mbala ya liboso oyo okei epai ya moto, yebisá ye ntina oyo oyei epai na ye. Ntango ozali koyekola na bato Biblia, salisá bango bákóma kondimela Yehova mpe Liloba na ye, mpe báyeba ndenge oyo makambo yango etali mpenza bango moko.—Rom. 10:14.
5. Elikya nini tozwi na esakweli ya Nahumu?
5 Mokanda ya Nahumu emonisi polele ete Nahumu andimaki mpenza ete liloba ya Yehova ekozanga te kokokisama. Lokola nsuka ya ebongiseli ya Satana ekomi pene, tozali kobɔndisama na ekateli oyo Nzambe azwi ete: “Mpasi ekobima mbala ya mibale te.”—Nah. 1:9.