Landá ndakisa ya basakoli—Habakuku
1. Mpo na nini ntango mosusu tokoki komiyoka lokola mosakoli Habakuku?
1 Lokola makambo mabe ezali se kobakisama na bisika tofandi, tokoki komiyoka lokola mosakoli Habakuku. Atunaki Yehova boye: “Mpo na nini ozali kosala ete namona makambo oyo ezali koyokisa mpasi, mpe ozali kokoba kotala motungisi?” (Hab. 1:3; 2 Tim. 3:1, 13) Komanyola na nsango ya Habakuku mpe ndakisa na ye ya bosembo ekosalisa biso wana tozali kozela mokolo ya kosambisa ya Yehova.—2 Pe. 3:7.
2. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali na kondima lelo oyo?
2 Zalá na kondima: Na esika ya kotika ete makambo mabe elɛmbisa ye, Habakuku azalaki makasi na elimo mpe azalaki kosɛnzɛla. (Hab. 2:1) Yehova andimisaki mosakoli yango ete Liloba na ye ekokokisama na ntango ebongi mpe ete “moyengebene, na bosembo na ye akokoba kozala na bomoi.” (Hab. 2:2-4) Yango elimboli nini mpo na bakristo oyo bazali sikoyo na nsuka mpenza ya mikolo ya nsuka? Kondimisama ete nsuka ekoya ezali na ntina mingi koleka koyeba ntango nini ekoya. Kondima etindaka biso tósɛnzɛla mpe tótya mosala ya kosakola na esika ya liboso.—Ebr. 10:38, 39.
3. Mpo na nini tosengeli kobatela esengo na biso wana tozali kosalela Yehova?
3 Sepelá na Yehova: Ntango Goge ya Magoge akobundisa basaleli ya Yehova, kondima na biso ekomekama. (Ezk. 38:2, 10-12) Etumba ebimisaka mikakatano, ata mpe epai ya baoyo bakolonga. Na ndakisa, bilei ekoki kozanga, bato bakoki kobungisa biloko na bango mpe bomoi ekoki kokóma mpasi. Tokosala nini ntango mikakatano ebimi? Habakuku ayebaki ete akokutana na mikakatano, yango wana azwaki ekateli ya kobatela esengo na ye na mosala ya Yehova. (Hab. 3:16-19) “Esengo ya Yehova” ekosalisa mpe biso tóyika mpiko na komekama oyo tokokutana na yango na mikolo ezali koya.—Neh. 8:10; Ebr. 12:2.
4. Tokoki kozala na esengo nini sikoyo mpe na mikolo ezali koya?
4 Bato oyo Yehova akobikisa na mokolo na ye ya kosambisa bakokoba koteyama na banzela ya Nzambe oyo ememaka na bomoi. (Hab. 2:14) Baoyo bakosekwa mpe bakoyekola makambo ya Yehova. Ata sikoyo, tiká ete tósalelaka mabaku nyonso mpo na koyebisa bato makambo etali Yehova mpe misala na ye ya kokamwa!—Nz. 34:1; 71:17.