Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb16 Mai lok. 2
  • Osalelaka JW Library?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Osalelaka JW Library?
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2016
  • Masolo mosusu
  • Bibliotɛkɛ oyo okoki komema na lobɔkɔ
    Ndenge oyo makabo na yo esalelamaka
  • Ndenge ya kosalela JW Library
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2016
  • Mwa aparɛyi oyo ezali kosalisa bato bázwa bilei ya elimo
    Ndenge oyo makabo na yo esalelamaka
  • Ndenge nini bibliotɛkɛ ya Ndako ya Bokonzi ekoki kosalisa biso?
    Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2016
mwb16 Mai lok. 2

BOMOI YA BAKRISTO

Osalelaka JW Library?

JW Library ezali programɛ moko ya ofele na Internet oyo ekosalisa yo ozwa Biblia mpe mikanda mosusu, bavideo mpe biloko ya koyoka mpo na kotya na telefone, tablɛti, to ordinatɛrɛ na yo.

Mikanda ya Biblia na kati ya JW Library

NDENGE YA KOTYA YANGO: Kɔtá na Internet, finá programɛ oyo ebombá baprogramɛ na kati mpe zwá programɛ JW Library. Programɛ yango ezalaka na baaparɛyi ebele. Wana ozali na Internet, fungolá programɛ JW Library mpe poná makambo oyo osepeli kozwa mpe kotya na aparɛyi na yo. Soki bozali na Internet na ndako te, okoki kokende na Ndako ya Bokonzi, na bibliotɛkɛ moko ya bato nyonso, to cyber café. Soki ozwi mikanda mpe otye yango na aparɛyi na yo, ekosɛnga lisusu Internet te mpo omona yango. Lokola makambo ya sika ebakisamaka mbala na mbala na programɛ JW Library, osengeli kokɔtaka mbala na mbala na Internet mpo na kobongisa programɛ yango.

MPO NA NINI KOZALA NA YANGO? Programɛ JW Library ezali malamu mingi mpo na boyekoli na yo moko mpe mpo na kolanda makita malamu. Esalisaka mpe mingi na mosala ya kosakola, mingimingi na litatoli ya libaku malamu.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto