Ndeko mwasi moko azali koteya mama moko ná mwana na ye na etúká ya Bengale occidental, na Inde
Ndenge ya kokabola mikanda
LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI
Motuna: Biso nyonso tozalaka na mposa bábɔndisa biso. Kasi epai wapi tokoki kozwa libɔndisi?
Vɛrsɛ: 2Ko 1:3, 4
Okoki koloba boye: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo elobeli ndenge Nzambe abɔndisaka biso.
LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI (lokasa ya nsuka)
Motuna: Bato mosusu bakanisaka ete Bokonzi ya Nzambe ezali na motema ya moto; basusu bakanisaka ete ekouta na milende oyo bato bazali kosala mpo na kotya kimya na mabele mobimba. Okanisi nini?
Vɛrsɛ: Da 2:44
Okoki koloba boye: Biblia emonisi ete Bokonzi ya Nzambe ezali guvɛrnema ya solo. Lisolo oyo elobeli makambo mosusu oyo Biblia elobi mpo na Bokonzi ya Nzambe.
KOBANDA LISOLO: TEYÁ SOLO
Motuna: Ndenge nini tokoki koyeba soki Nzambe akipaka biso?
Vɛrsɛ: 1Pe 5:7
Solo: Nzambe alingi tóbondelaka ye mpo atyelaka biso likebi.
KOMÁ MALOBA NA YO MOKO YA KOKABOLA MIKANDA
Landá makanisi oyo bapesi likoló mpo na kobongisa ndenge na yo moko ya kobanda lisolo na mosala ya kosakola.