Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb16 Novembre lok. 3
  • Biblia elobeli mwasi oyo akoki

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biblia elobeli mwasi oyo akoki
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2016
  • Masolo mosusu
  • Mama moko apesi toli ya mayele
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • “Nkolo na ye azali moto oyo ayebani na baporte”
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2016
  • Basi, bomonisa bolingo mpe limemya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • “Mokonzi ya mwasi ezali mobali”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2016
mwb16 Novembre lok. 3

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MASESE 27-31

Biblia elobeli mwasi oyo akoki

Masese mokapo 31 ezali na toli ya ntina mingi oyo mama ya Mokonzi Lemuele apesaki ye. Toli yango ya bwanya esalisaki mokonzi yango ayeba bizaleli ya koluka epai ya mwasi oyo akoki.

Mwasi oyo akoki azali moto ya kotyela motema

Mwasi moko ya ntango ya kala azali kopesa libota na ye biloko

31:10-12

  • Apesaka makanisi ya malamu na oyo etali bikateli ya kozwa na libota mpe azalaka na komikitisa

  • Mobali na ye atyaka motema ete akoki kozwa bikateli ya malamu, alukaka te ete asɛnga ye nzela liboso asala likambo nyonso

Mwasi oyo akoki azalaka makasi na mosala

Mwasi moko ya ntango ya kala azali konika mbuma

31:13-27

  • Abatelaka mbongo ya libota mpe azalaka na bomoi ya mindɔndɔ te mpo bato ya libota na ye bálata mpe bálya malamu

  • Asalaka mosala makasi mpe abatelaka libota na ye butu moi

Mwasi oyo akoki azalaka moninga ya Nzambe

Mwasi moko azali kobondela

31:30

  • Abangaka Nzambe mpe alukaka kozala na boyokani malamu na ye

OYEBAKI YANGO?

Mabanga ya korai ya motane ezalaki na motuya mingi na ntango ya kala. Ezalaki kitoko, ezalaki komonana mingi te, mpe kozwa yango ezalaki mpasi. Bazalaki kozwa yango na Mbu ya Mediterane mpe na mbu Motane, mpe bato mingi bazalaki kosala mombongo na yango.

Mabanga ya korai ya motane

Mpo na komonisa motuya ya mabanga ya korai, Biblia elobeli yango kaka ndenge elobeli wolo, palata mpe safire.

Liloba ya Nzambe elobi ete motuya ya mwasi oyo akoki “eleki mosika oyo ya mabanga kitoko ya korai.”​—Mas 31:10.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto