BOMOI YA BAKRISTO
Mateya ya Nzambe elongolaka koyinana
Yehova aponaka bilongi te. (Mis 10:34, 35) Andimaka bato ya ‘bikólo nyonso, mabota nyonso, mikili nyonso, mpe minɔkɔ nyonso.’ (Em 7:9) Na yango, koyinana to kokanisela basusu mabe mpe koponapona ezali na esika te na lisangá. (Yk 2:1-4) Mateya ya Nzambe esalisi biso tózala na paradiso ya elimo, esika tozali komona ndenge bizaleli ya bato ezali kobongwana. (Yis 11:6-9) Soki tosali makasi tópikola na mitema na biso likanisi ya koyina basusu to kokanisela bango mabe, tokomonisa ete tozali komekola Nzambe.—Ef 5:1, 2.
BÓTALA VIDEO JOHNY NÁ GIDEONE: TOZALAKI BANGUNA, TOKÓMI BANDEKO. NA NSIMA, BÓPESA BIYANO NA MITUNA OYO:
Mpo na nini mateya ya Nzambe eleki nyonso oyo bato basalaka mpo na kosilisa koyinana mpe kokanisela basusu mabe mpo na mposo na bango?
Nini ekamwisaka yo na lisangá ya bandeko na mokili mobimba?
Ndenge nini kobatela bomoko ya bokristo ekumisaka Yehova?