Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb17 Février lok. 5
  • Sakolá “mbula ya boboto oyo euti na Yehova”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Sakolá “mbula ya boboto oyo euti na Yehova”
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
  • Masolo mosusu
  • Boyengebene ebimi na Siona
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi II
  • “Ntango ya boboto”
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi II
  • “Banzete ya Yehova etondi na mai”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Banzete oyo eumelaka ntango molai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
mwb17 Février lok. 5

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | YISAYA 58-62

Sakolá “mbula ya boboto oyo euti na Yehova”

“Mbula ya boboto oyo euti na Yehova” ezali mbula ya sanza 12 te

61:1, 2

  • Ezali ntango oyo na boumeli na yango Yehova apesi bato ya komikitisa libaku ya kondima nsango na ye ya bonsomi

  • Na siɛklɛ ya liboso, mbula ya boboto ebandaki ntango Yesu abandaki mosala na ye ya kosakola na mobu 29 T.B. mpe eumelaki tii ‘mokolo Yehova azongisaki mabe’ ntango Yerusaleme ebebisamaki na mobu 70 T.B.

  • Na mikolo na biso, mbula ya boboto ebandaki ntango Yesu akómaki Mokonzi na likoló na 1914 mpe ekosuka na bolɔzi monene

Mondelo ya ntango oyo emonisi mbula ya boboto banda 29 T.B. tii na 70 T.B. mpe banda 1914 tii na bolɔzi monene

Yehova atyeli bato na ye “banzete minene ya boyengebene”

61:3, 4

  • Emonani ete banzete oyo eleki milai na mokili ekolaka esika moko na kati ya zamba, mpe ebatelanaka mpo ekwea te

  • Misisa ya banzete yango ekanganaka mpe ebatelanaka mpo ekwea te na mipɛpɛ makasi

  • Banzete ya milai ebatelaka banzete ya mikemike na moi, mpe nkasa oyo ekweisaka ebongisaka mabele

Na mokili mobimba, biso bakristo tozali kolendisama mpe kozwa libateli ya “banzete minene ya boyengebene,” elingi koloba bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bazali naino awa na mabele

Elili ya banzete minene oyo ezali na misisa ya makasi ebateli banzete ya mike
    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto