Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb17 Août lok. 2
  • Tómonisa bizaleli ya Nzambe—Komikitisa

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tómonisa bizaleli ya Nzambe—Komikitisa
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
  • Masolo mosusu
  • Yehova azwaka na motuya basaleli na ye ya komikitisa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Mpo na nini ebongi komilatisa ezaleli ya komikitisa?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • “Ngai nazali . . . na komikitisa na motema”
    “Yaká, landá ngai”
  • Tólona komikitisa ya solosolo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
mwb17 Août lok. 2

BOMOI YA BAKRISTO

Tómonisa bizaleli ya Nzambe​—Komikitisa

MPO NA NINI EZALI NA NTINA:

  • Komikitisa esalaka ete moto azala na boyokani malamu na Yehova.​—Nz 138:6

  • Komikitisa esalaka ete moto azala na boyokani malamu na basusu.​—Flp 2:3, 4

  • Lolendo ememaka na likama.​—Mas 16:18; Ezk 28:17

NDENGE YA KOMONISA YANGO:

  • Sɛngá toli mpe salelá yango.​—Nz 141:5; Mas 19:20

  • Kokakatana te kosalisa basusu na misala mosusu.​—Mt 20:25-27

  • Kotika te ete makoki to mikumba oyo ozali na yango ekómisa yo lolendo.​—Ro 12:3

Ndeko moko azali kosukula twaleti na Ndako ya Bokonzi

Nasengeli kosala lisusu nini mpo na komonisa komikitisa mingi?

TALÁ VIDEO BOYÁ MAKAMBO OYO EBEBISAKA BOSEMBO YA MOTO​—LOLENDO, MPE PESÁ BIYANO NA MITUNA OYO:

  • Ndenge oyo tosalaka ntango bapesi biso toli emonisaka nini?

  • Ndenge nini libondeli esalisaka biso tókóma na ezaleli ya komikitisa?

  • Makambo nini tokoki kosala mpo na komonisa komikitisa?

NDAKISA OYO EUTI NA BIBLIA MPO NA KOMANYOLA:

Yesu azalaki moto oyo alekaki bato nyonso. Ata bongo, na komikitisa nyonso asalelaki basusu.​—Mt 20:28; Yn 13:3-5, 14, 15.

Omituna boye, ‘Ndenge nini nakoki komekola komikitisa ya Yesu?’

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto