Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb17 Octobre lok. 3
  • Ndenge ya kokóma moyekoli ya Biblia ya molende

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kokóma moyekoli ya Biblia ya molende
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
  • Masolo mosusu
  • Yehova alaki danyele mbano monene
    Tyá likebi na esakweli ya Danyele!
  • Nzambe amibanzabanzaka mpenza mpo na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mokanda ya Danyele—ntina na yango mpo na yo
    Tyá likebi na esakweli ya Danyele!
  • Ndenge ya koyeba basambeli ya solo na ntango ya nsuka
    Tyá likebi na esakweli ya Danyele!
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
mwb17 Octobre lok. 3

BOMOI YA BAKRISTO

Ndenge ya kokóma moyekoli ya Biblia ya molende

Okolinga kotikala sembo na komekama lokola Danyele? Danyele ayekolaki Liloba ya Nzambe na molende, ata mpe bisakweli ya makasi. (Da 9:2) Koyekola Biblia na molende ekoki kosalisa yo otikala sembo. Na ndenge nini? Ekoki kosala ondima mpenza ete bilaka ya Yehova ekokokisama. (Yos 23:14) Ekoki mpe kosalisa yo olinga Nzambe mingi lisusu mpe kotinda yo osala oyo ezali malamu. (Nz 97:10) Kasi osengeli kobanda wapi? Tótala makanisi oyo elandi.

Danyele azali koyekola Liloba ya Nzambe
  • Makambo nini nasengeli koyekola? Kozala na momeseno malamu ya koyekola esɛngi mpe kobongisaka makita ya lisangá. Okozwela botángi ya Biblia ya pɔsɔ litomba mingi koleka soki ozali kozwa ntango ya kosala bolukiluki na makambo oyo ozali kokanga ntina te. Lisusu, bandeko mosusu baponaka koyekola mingi bisakweli ya Biblia, bizaleli ndenge na ndenge ya mbuma ya elimo ya Nzambe, mibembo ya ntoma Paulo na mosala ya misionɛrɛ, to mpe biloko oyo Yehova akelá, oyo tomonaka. Soki na mokolo motuna moko ya Biblia eyeli yo na makanisi, komá yango mpe tyá yango na programɛ na yo ya boyekoli.

  • Epai wapi nakoki kozwa makambo ya koyekola? Mpo omona makanisi mosusu, talá video Bisaleli ya bolukiluki mpo na kozwa biloko ya motuya ya elimo. Mpo omeka boyebi na yo, luká koyeba soki bikólo oyo eleki na nguya, oyo emonisami na banyama oyo Danyele mokapo 7 elobeli ezalaki bikólo nini.

  • Nasengeli koyekola ngonga boni? Koyekola mbala na mbala ezali sekele ya kozala makasi na elimo. Okoki naino kobanda koyekola mpo na ntango mokuse, soki esengeli, mpe na nsima koyeisa boyekoli yango molai mokemoke. Koyekola Liloba ya Nzambe ekokani na koluka biloko ya motuya oyo ebombani; soki ozali komona biloko yango mingi, mposa ya kotimola yango ekobakisama! (Mas 2:3-6) Okokóma na mposa makasi ya Liloba ya Nzambe mpe na momeseno ya koyekola Biblia mbala na mbala bomoi na yo mobimba.​—1Pe 2:2.

    Mpo na koyeba ndenge ya kokómisa boyekoli ya Biblia kitoko, talá Lamuká! ya 02/2012, nk. 18-20 (na Lifalanse).

BANYAMA OYO DANYELE MOKAPO 7 ELOBELI EZALI ELILINGI YA NINI?

  • Nyama moko lokola nkɔsi na mapapu ya mpongo

    Da 7:4

  • Nyama moko lokola urse azali na mikoya misato ya mipanzi na monɔkɔ

    Da 7:5

  • Nyama moko lokola nkoi azali na mitó minei mpe mapapu minei na mokolo na yango

    Da 7:6

  • Nyama ya nsɔmɔ azali na mino ya mabende mpe maseke zomi

    Da 7:7

MOTUNA MOSUSU:

Ndenge nini Danyele 7:8, 24 ekokisamaki?

Liseke ya moko na miso mpe monɔkɔ ebimi na katikati ya maseke zomi, mpe epikoli maseke misato

MPO NA KOYEKOLA NA MBALA YA NSIMA:

Banyama oyo Emoniseli mokapo 13 elobeli ezali elilingi ya nini?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto