MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | ZEKARIA 9-14
Tikalá na kati ya “lobwaku ya bangomba”
Yehova abongisaki “lobwaku moko monene mpenza” na 1914 ntango atyaki Bokonzi ya Masiya, “ngomba” ya mibale na boyangeli na ye na molɔ́ngɔ́ mobimba. Banda 1919, basaleli ya Nzambe bazali kozwa libateli na “lobwaku ya bangomba”
Ndenge nini bato bazali “kokima na lobwaku” ya libateli?
Moto nyonso oyo azali na libándá ya lobwaku ya elilingi akokufa na Armagedone
Nasala nini mpo natikala na lobwaku ya libateli?