Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb18 Février lok. 4
  • “Kumisá tata na yo mpe mama na yo”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Kumisá tata na yo mpe mama na yo”
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2018
  • Masolo mosusu
  • Tokumisa bato nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Tókumisa baboti na biso atako bakómi mibangé
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • ’Kokumisa tata na yo mpe mama na yo’ elimboli nini’?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Tokumisa Jéhovah: ndenge nini mpe mpo na nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2018
mwb18 Février lok. 4

BOMOI YA BAKRISTO

“Kumisá tata na yo mpe mama na yo”

Ntango Yesu azalaki awa na mabele, azongelaki mobeko oyo: “Kumisá tata na yo mpe mama na yo.” (Kob 20:12; Mt 15:4) Na ntembe te, Yesu azalaki koloba polele mpo “azalaki kaka komikitisa” liboso ya baboti na ye ntango azalaki elenge. (Lk 2:51) Ntango akómaki mokóló, azwaki bibongiseli mpo mama na ye abatelama malamu nsima ya liwa na ye.​—Yn 19:26, 27.

Lelo oyo mpe, bilenge bakristo oyo batosaka mpe balobaka na baboti na bango na limemya bakumisaka baboti yango. Kutu, mobeko oyo esɛngi kokumisa baboti etaleli ntango te. Ata ntango baboti na biso bakómi mibange, tokokoba kokumisa bango soki tozali koyoka toli na bango. (Mas 23:22) Tokokumisa mpe baboti na biso oyo bakómi mibange soki tozali kotya likebi na ndenge bazali komiyoka mpe kosunga bango na mbongo soki bazali na bosɛnga. (1Ti 5:8) Tózala bilenge to mikóló, soki tozali kosolola malamu na baboti na biso ekomonisa ete tokumisaka bango.

TALÁ VIDEO YA MOTO AZALI KOYEMA NDENGE NINI NAKOKI KOSOLOLA NA BABOTI NA NGAI? MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Mpo na nini okoki komona ete ezali mpasi kosolola na baboti na yo?

  • Ndenge nini okoki kokumisa baboti na yo ntango ozali kosolola na bango?

    Mwana mobali moko azali kokomela baboti na ye mokanda, kosolola na baboti na ye mpe kosakana bale na tata na ye
  • Mpo na nini ezali na ntina osololaka na baboti na yo? (Mas 15:22)

    Baboti bazali kosalisa mwana na bango ya mobali alonga mikakatano oyo ezali liboso na ye

    Kosolola na baboti na yo ekoki kosalisa yo olonga na bomoi

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto