Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb18 Février lok. 7
  • Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Kosalela malamu mituna

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Kosalela malamu mituna
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2018
  • Masolo mosusu
  • Kosalela malamu mituna
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Yekola koteya
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Kokisá mokumba na yo ya mopalanganisi ya nsango malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Kotuna mituna
    Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2018
mwb18 Février lok. 7

BOMOI YA BAKRISTO

Tókolisa makoki na biso ya kosakola​—Kosalela malamu mituna

MPO NA NINI EZALI NA NTINA: Soki “makanisi na motema ya moto ezali lokola mai mozindo,” boye mituna ezali lokola katini ya kotoka mai yango. (Mas 20:5) Mituna esalisaka biso tókɔtisa bayoki na biso na lisolo. Mbala mingi, biyano na mituna oyo eponami malamu esalisaka na koyeba makanisi ya moto. Yesu asalelaki malamu mituna. Ndenge nini tokoki komekola ye?

Yesu atuni moko ya bayekoli na ye motuna

NDENGE YA KOSALA YANGO:

  • Tuná mituna oyo ekotinda moto abimisa makanisi na ye. Yesu atunaki mituna mingi oyo ebongi mpo na koyeba makanisi ya bayekoli na ye. (Mt 16:13-16; be lok. 238 par. 3-5) Mituna nini okoki kotuna mpo moto abimisa makanisi na ye?

  • Tuná mituna oyo ekotinda moto azwa eyano. Mpo na kosembola makanisi ya Petro, Yesu atunaki mituna mpe apesaki biyano ndenge na ndenge mpo Petro azwa oyo ya malamu. (Mt 17:24-26) Mituna nini okoki kotuna mpo na kosalisa moto azwa eyano ya malamu?

  • Pesá moyoki na yo longonya. Ntango mokomeli moko ‘ayanolaki na mayele,’ Yesu apesaki ye longonya. (Mr 12:34) Ndenge nini okoki kopesa moto moko longonya mpo ayanoli na motuna moko?

Zalá na limemya. Tozali te na bokonzi oyo Yesu azalaki na yango. Yango wana tosengeli kozala na limemya, mingimingi epai ya mikóló, bato oyo toyebi te, mpe baoyo bazali na bokonzi.​—1Pe 2:17.

TALÁ ETENI YA LIBOSO YA VIDEO SALÁKÁ MOSALA OYO YESU ASALAKI ​—TEYÁKÁ, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Mpo na nini tolobi ete lolenge oyo ndeko ateyi ezali mabe atako alobi makambo ya solo?

  • Mpo na nini tosengeli kosuka kaka te na kolimbola makambo?

TALÁ ETENI YA MIBALE YA VIDEO YANGO, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Ndenge nini ndeko asaleli malamu mituna?

  • Na makambo nini mosusu tokoki komekola ndenge na ye ya koteya?

Mobali moko azali kobaye na ndenge bazali koteya ye; mobali moko asepeli ntango amoni solo polele na ndenge bazali koteya ye malamu

Mateya na biso etindaka basusu basala nini? (Lk 24:32)

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto