Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb18 Mars lok. 7
  • “Bósɛnzɛlaka”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bósɛnzɛlaka”
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2018
  • Masolo mosusu
  • Okokoba ‘kosɛnzɛla’?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Liteya oyo etali kosɛnzɛla—Bangɔndɔ
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Ozali koyoka mpenza makebisi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2018
mwb18 Mars lok. 7
Bangɔndɔ zomi oyo Yesu apesaki ndakisa

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MATAI 25

“Bósɛnzɛlaka”

25:1-12

Atako ndakisa ya bangɔndɔ zomi oyo Yesu apesaki etalelaki nde bakristo oyo batyami mafuta na elimo, nsango na yango etaleli mpe bakristo nyonso. (w15 15/3 nk. 9-14) “Yango wana, bósɛnzɛlaka mpamba te boyebi mokolo te mpe ngonga te.” (Mt 25:13) Okoki kolimbola ndakisa yango?

  • Mobali ya libala (vs. 1)​—Yesu

  • Bangɔndɔ ya mayele oyo bamilɛngɛlaki (vs. 2)​—Bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bamilɛngɛlaki mpo na kokokisa mokumba na bango na bosembo nyonso mpe bazali kongɛnga lokola miinda tii na nsuka (Flp 2:15)

  • Mongongo moko eyokanaki: “Mobali ya libala ayei!” (vs. 6)​—Elembeteli ya kozala ya Yesu

  • Bangɔndɔ ya bazoba (vs. 8)​—Bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo babimi kokutana na mobali ya libala kasi bakobi te kosɛnzɛla mpe kobatela bosembo na bango

  • Bangɔndɔ ya mayele baboyi kokaba mafuta na bango (vs. 9)​—Nsima ya kotyama elembo ya nsuka, bakristo ya sembo oyo batyami mafuta na elimo bazali lisusu na likoki te ya kosalisa moto nyonso azangaki bosembo

  • “Mobali ya libala akómaki” (vs. 10)​—Yesu ayei kosambisa pene na nsuka ya bolɔzi monene

  • Bangɔndɔ ya mayele bakɔti na fɛti ya libala elongo na mobali ya libala, mpe porte ekangami (vs. 10)​—Yesu ayanganisi bakristo ya sembo oyo batyami mafuta na elimo na likoló, kasi baoyo bazangi bosembo babungisi mbano yango

Ndakisa yango emonisi te ete ebele ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo bakozanga bosembo mpe basusu bakozwa esika na bango. Kasi, ezali likebisi ete mokristo mokomoko oyo atyami mafuta na elimo azali na likoki ya kopona komilɛngɛla mpe kosɛnzɛla to kokóma zoba mpe kotika kozala sembo. Yesu alobaki boye: “Bómilɛngɛla.” (Mt 24:44) Ezala tozali na elikya nini, Yesu asɛngi biso nyonso tóbongisa mitema na biso mpo na kosala na bosembo mpe kotosa etinda kaka moko wana ya kosɛnzɛla.

Ndenge nini nazali komonisa ete nazali kosɛnzɛla?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto