MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MARKO 13-14
Kotika te ete kobanga bato ekanga yo na motambo
Mpo na nini bantoma babangaki ntango batyaki bango mpanzi likoló?
Bamityelaki motema mingi. Kutu Petro atutaki ntolo ete akozala sembo epai ya Yesu koleka bantoma mosusu
Bakobaki te kosɛnzɛla mpe kobondela
Nsima ya lisekwa ya Yesu, nini esalisaki bantoma oyo babongolaki mitema bátika kobanga bato mpe básakola atako botɛmɛli?
Balandaki makebisi ya Yesu, yango wana, bamibongisaki mpo na botɛmɛli mpe minyoko
Batyelaki Yehova motema mpe babondelaki.—Mis 4:24, 29
Makambo nini ekoki komeka mpiko na biso?