Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb18 Août lok. 8
  • Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Kosalela site JW.ORG

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Kosalela site JW.ORG
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2018
  • Masolo mosusu
  • Zwá bwanya mpo na bomoi ya mokolo na mokolo na JW.ORG
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2022
  • Epai wapi tokoki kozwa biyano na mituna minene etali bomoi?
    Epai wapi tokoki kozwa biyano na mituna minene etali bomoi?
  • Toli mpo na koyekola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • Osí omituna?
    Lamuká!—2019
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2018
mwb18 Août lok. 8
Ndeko mobali moko asaleli karte ya jw.org mpo na kolakisa mobali moko site yango

BOMOI YA BAKRISTO

Tókolisa makoki na biso ya kosakola​—Kosalela site JW.ORG

MPO NA NINI EZALI NA NTINA: Mikanda nyonso oyo ezali na kati ya Bisaleli mpo na koteya etindaka bato na site jw.org. Kutu, mokano ya libosoliboso ya karte ya jw.org mpe ya trakte Epai wapi tokoki kozwa biyano na mituna minene etali bomoi? ezali ya kotinda bato bákɔta na site Internet na biso. Na aparɛyi na yo, okoki kosalela site jw.org mpo na kotindela moto moko ya mikanda oyo ezali na kati ya Bisaleli mpo na koteya to kolakisa ye esika akoki kokɔta mpo azwa yango. Yango ekoki kosalisa mingimingi ntango ozali kopesa litatoli epai ya moto oyo alobaka monɔkɔ mosusu. Longola yango, bato bakoki kotuna mituna oyo biyano na yango ezali te na mikanda oyo ezali na kati ya Bisaleli mpo na koteya. Soki toyebi kosalela jw.org, tokosala lisusu mosala na biso ya kosakola malamu koleka.

NDENGE YA KOSALELA YANGO:

  • Moto moko asaleli karte ya jw.org mpo na kokɔta na site yango

    Salelá eteni “MATEYA YA BIBLIA.” Na ndakisa, soki olingi kosakwela moboti moko oyo alingi koyeba makambo mingi etali kobɔkɔla bana; kende esika bakomi MATEYA YA BIBLIA > LIBALA MPE LIBOTA.

  • Salelá eteni “MIKANDA.” Na ndakisa, soki olingi kopesa litatoli ya libaku malamu na eteyelo mpe olingi kopesa moninga ya kelasi mwa buku Biyano na mituna 10 oyo bilenge batunaka; kende esika bakomi MIKANDA > BABUKU MPE MWA BABUKU.

  • Salelá eteni “OLINGI KOYEBA BISO?” Na ndakisa, soki olingi kosakwela moninga moko ya mosala oyo akosepela kotánga na mokuse mateya oyo tondimaka; kende esika bakomi OLINGI KOYEBA BISO? > MITUNA OYO BATO BATUNAKA MINGI.

TALÁ VIDEO KOSALELA SITE JW.ORG, MPE NA NSIMA LUKÁ KOYEBA ESIKA OYO OKOKƆTA NA SITE YANGO MPO NA KOSALISA:

  • moto oyo andimaka te ete Nzambe azali

  • moto oyo auti kokutana na likambo moko ya mpasi

  • ndeko oyo atiká kosakola

  • moto oyo ozongeli ye kasi azali komituna soki tozwaka mbongo wapi mpo na mosala na biso

  • moto oyo azali mopaya kasi alingi kokende na makita na mboka na bango

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto