MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MISALA 4-5
Bakobaki koloba Liloba ya Nzambe na mpiko
Nini esalaki ete bantoma bákóma na makoki ya koteya? Nini esalisaki bango báloba na ndenge ya kondimisa mpe na mpiko? “Bazalaki elongo na Yesu,” Moteyi monene, mpe bayekolaki epai na ye. (Mis 4:13) Wapi mwa mateya oyo tokoki kozwa epai ya Yesu, oyo ekosalisa biso tóteya malamu Liloba ya Nzambe?