Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb19 Janvier lok. 7
  • “Paulo apesaki Nzambe matɔndi mpe azwaki mpiko”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Paulo apesaki Nzambe matɔndi mpe azwaki mpiko”
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2019
  • Masolo mosusu
  • Biso nyonso tolendisamaka
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Bazali kosala mosala makasi mpo na biso
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
  • Bakɛngɛli mpo na kobatela etonga
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • Bakɛngɛli-batamboli—makabo na motindo ya mibali
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2019
mwb19 Janvier lok. 7
Paulo azali kopesa Nzambe matɔndi mpo na bandeko oyo basalaki mobembo mpo na kokutana na ye

BOMOI YA BAKRISTO

“Paulo apesaki Nzambe matɔndi mpe azwaki mpiko”

Ntango bandeko ya lisangá ya Roma bayokaki ete Paulo azali koya, etuluku ya bandeko esalaki mobembo ya kilomɛtrɛ soki 64 mpo na kokutana na ye. Paulo ayokaki ndenge nini mpo na bolingo oyo bamoniselaki ye ndenge bamipimelaki? “Ntango amonaki bango, Paulo apesaki Nzambe matɔndi mpe azwaki mpiko.” (Mis 28:15) Atako Paulo ayebanaki lokola moto oyo alendisaka masangá oyo azalaki kokende kotala, na libaku oyo lokola azalaki mokangami, ye nde balendisaki.​—2Ko 13:10.

Lelo oyo bakɛngɛli ya zongazonga bakendaka na masangá mpo na kolendisa bandeko. Ndenge moko na basaleli nyonso ya Yehova, na bantango mosusu, balɛmbaka, bamitungisaka mpe bakutanaka na makambo oyo elɛmbisaka bango nzoto. Na mbala ya nsima oyo mokɛngɛli ya zongazonga ná mwasi na ye bakoya kotala lisangá na bino, okoki kosala nini mpo na kosalisa bango bazwá makasi mpo ‘bólendisana’?​—Ro 1:11, 12.

  • Mokɛngɛli ya zongazonga azali kotambwisa likita ya mosala ya kosakola

    Kende na likita ya mosala ya kosakola. Mokɛngɛli ya zongazonga alendisamaka soki basakoli bamipimeli makambo mosusu mpo na kopesa mpenza mabɔkɔ na mosala ya kosakola na pɔsɔ ya ntina. (1Te 1:2, 3; 2:20) Okoki kosɛnga mosala ya mobongisi-nzela mosungi na sanza oyo mokɛngɛli akotala lisangá na bino. Okoki kosɛnga ete obima na mokɛngɛli to mwasi na ye na mosala ya kosakola to okoki komema moko na bango epai ya moyekoli na yo ya Biblia? Basepelaka kosakola na basakoli ndenge na ndenge, ezala basakoli ya sika to baoyo bamesani mpenza te na mosala ya kosakola.

  • Libota moko oyo ezali koyamba mokɛngɛli ya zongazonga ná mwasi na ye na esengo mpenza

    Zalá moyambi bapaya. Okoki kopesa bango esika ya kolala to mpe kobengisa bango mpo na kolya mwa eloko? Yango ekomonisa mokɛngɛli ya zongazonga ná mwasi na ye ete olingaka bango. Basɛngaka makambo ya mindɔndɔ te.​—Lk 10:38-42.

  • Mokɛngɛli ya zongazonga azali kotambwisa likita ya bankulutu

    Yoká mpe salelá malako mpe toli oyo azali kopesa. Na bolingo nyonso, mokɛngɛli ya zongazonga asalisaka biso tómona ndenge oyo tokoki kobongisa mosala na biso mpo na Yehova. Na bantango mosusu, akoki kopesa toli ya makasi. (1Ko 5:1-5) Asepelaka soki tozali na botosi mpe na komikitisa.​—Ebr 13:17.

  • Bandeko ya lisangá bazali komonisa botɔndi epai ya mokɛngɛli ya zongazonga ná mwasi na ye

    Monisá botɔndi. Yebisá mokɛngɛli ya zongazonga ná mwasi na ye ndenge milende na bango ememelaki yo matomba. Okoki koloba na bango na monɔkɔ to kokoma yango na mwa nɔti to karte.​—Kol 3:15.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto