Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb19 Février lok. 8
  • Kobá kozela na ezaleli ya koyika mpiko

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kobá kozela na ezaleli ya koyika mpiko
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2019
  • Masolo mosusu
  • Kotika eloko te ezangisa yo libonza
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Koyika mpiko ezali na ntina mingi mpo na baklisto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • “Topota mbango na mpiko nyonso”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Tikalá penepene na ebongiseli ya Yehova
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2019
mwb19 Février lok. 8

BOMOI YA BAKRISTO

Kobá kozela na ezaleli ya koyika mpiko

Esali sikoyo mbula boni banda ozelaka ete Bokonzi ya Nzambe eya? Ozali kokoba koyika mpiko mpe komonisa motema molai atako ozali kokutana na mikakatano? (Ro 8:25) Bato bazali koyina, konyokola mpe kotya bandeko na biso mosusu na bolɔkɔ, ata mpe koluka koboma bango. Bamosusu mpe bazali koyika mpiko na maladi oyo esilaka te to mpe bobange.

Nini ekosalisa biso tózela na mposa makasi ata na komekama ya ndenge nini? Tosengeli kotánga Biblia mokolo na mokolo mpe kokanisa na mozindo makambo oyo tozali kotánga mpo kondima na biso ezala kaka makasi. Tosengeli kotya makanisi na elikya na biso. (2Ko 4:16-18; Ebr 12:2) Tosengeli kobondela Yehova mpe kosɛnga nguya ya elimo santu na ye. (Lk 11:10, 13; Ebr 5:7) Tata na biso ya bolingo akoki kosalisa biso ‘tóyika mpenza mpiko mpe tózala na motema molai ná esengo.’​—Kol 1:11.

TALÁ VIDEO TOSENGELI “KOYIKA MPIKO NTANGO TOZALI KOPOTA MBANGU”​—ZALÁ NA KONDIMA ETE OKOZWA MBANO, MPE NA NSIMA, YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Jamie ná mwasi na ye bazali na mosala ya kosakola

    ‘Makambo nini oyo ekanami te’ ekoki kokómela biso? (Mos 9:11)

  • Nsima ya kosala AVC, Carl azali kolendisa Jamie na vɛrsɛ moko ya Biblia

    Ndenge nini libondeli esalisaka biso ntango tokutani na komekama?

  • Jamie ná Carl bakei kotala ndeko mwasi moko ná mobali na ye mpo na kolendisa

    Soki tozali kokoka lisusu te kosala mingi na mosala ya Yehova ndenge ezalaki liboso, mpo na nini tosengeli kotya makanisi na oyo tozali naino na likoki ya kosala?

  • Jamie azali kokanisa ndenge akozongela makasi na ye na paradiso

    Tyá miso na yo na mbano

    Nini esalisaka yo ozala ntango nyonso na elikya ete okozwa mbano?

Ndenge nini okoki kosunga baoyo bazali kokutana na komemaka mpe bato ya mabota na bango?

  • Lobá na bango na boboto mpe kokokanisa bango te na bato mosusu

  • Zalá moyoki malamu

  • Bondelá mpo na bango mpe elongo na bango

  • Lambelá bango bilei to salisá bango na misala mosusu ya ndako

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto