MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 1 PETRO 3-5
“Nsuka ya makambo nyonso ekómi pene”
Mosika te tokokutana na bolɔzi moko monene oyo tomoná naino te liboso na mokili. Tósala nini mpo tókoba kozala makasi na elimo sikoyo mpe na mikolo ezali koya?
Kobá kobondela, salelá mitindo nyonso ya mabondeli
Lingáká bandeko makasi, kobá kokómisa boyokani na yo ná bango makasi
Yambáká bango na esengo mpenza
OMITUNA BOYE: ‘Wapi makambo oyo nakoki kosala mpo na komonisa bandeko ya lisangá mpe ya mokili mobimba ete nalingaka bango makasi mpe nayambaka bango na esengo mpenza?’