BOMOI YA BAKRISTO
Zalá mosali oyo ayebi mpenza mosala
Mosali-mabaya oyo ayebi mpenza mosala, ayebaka kosalela bisaleli na ye. Ndenge moko mpe, “mosali oyo azali koyoka nsɔni te mpo na mosala na ye” ayebaka ndenge ya kosalela bisaleli na biso mpo na koteya. (2 Ti 2:15) Yanolá na mituna oyo elandi mpo omona soki oyebi mpenza kosalela mwa mikanda oyo ezali na kati ya bisaleli na biso mpo na koteya na mosala ya kosakola.
YOKÁ NZAMBE MPO OZALA NA BOMOI YA SEKO
Esaleli oyo ebongisami mpo na banani?—mwb17.03 lok. 5 par. 1-2
Ndenge nini okoki kosalela yango mpo na kotambwisa boyekoli ya Biblia?—km 7/12 lok. 3 par. 6
Esɛngi kosalela esaleli nini mosusu mpo na kobongisa moyekoli na yo mpo na batisimo? —km 7/12 lok. 3 par. 7
NSANGO MALAMU OYO EUTI NA NZAMBE!
Na ndenge nini esaleli oyo ekeseni na mikanda mosusu ya boyekoli?—km 3/13 nk. 4-5 par. 3-5
Osengeli komeka kosala nini ntango opesi yango moto?—km 9/15 lok. 3 par. 1
Ndenge nini okoki kosalela yango mpo na kotambwisa boyekoli ya Biblia?—mwb16.01 lok. 8
Ntango nini osengeli kokɔtisa moto na buku Makambo oyo Biblia eteyaka? —km 3/13 lok. 7 par. 10
MAKAMBO OYO BIBLIA ETEYAKA
Ndenge nini tosengeli kosalela eteni oyo bakomi ‘Na mokuse’ mpe bitanda oyo ezali na nsuka ya buku yango? —mwb16.11 lok. 5 par. 2-3
BANANI BAZALI KOSALA MOKANO YA YEHOVA LELO OYO?
Ntango nini osengeli kosalela mwa buku oyo?—mwb17.03 lok. 8 par. 1
Ebongisamá mpo na kosalela yango ndenge nini?—mwb17.03 lok. 8, etanda