MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | EBANDELI 15-17
Mpo na nini Yehova apesaki Abrama ná Sarai bankombo mosusu?
Na miso ya Yehova, Abrama azalaki moto oyo azalaki na mbeba te. Ntango abakisaki makambo mosusu na elaka oyo apesaki Abrama, Yehova apesaki ye ná Sarai bankombo oyo ezalaki na ndimbola ya esakweli.
Na boyokani na ndimbola ya bankombo na bango, Abrahama akómaki tata ya ebele ya bikólo mpe Sara akómaki nkɔkɔ ya bakonzi.
Abrahama
Tata ya ebele ya bikólo
Sara
Mama ya bakonzi
Ntango tobotamaka, biso moko toponaka nkombo te. Kasi, biso moko tokoki komisalela nkombo malamu lokola Abrahama ná Sara. Omituna boye:
‘Nakoki kosala nini mpo nazala na mbeba te na miso ya Yehova?’
‘Nkombo ya ndenge nini nazali komisalela na miso ya Yehova?’