Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb20 Avril lok. 7
  • “Bólongola banzambe ya bapaya”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bólongola banzambe ya bapaya”
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2020
  • Masolo mosusu
  • Koluka koyeba makambo oyo eleki mayele ya bomoto ezali kaka lisano mpamba?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Ndimá lisalisi ya Yehova mpo otɛmɛla bilimo mabe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Biblia eteyaka nini na ntina etali misala ya bilimo mabe?
    Lamuká!—2017
  • Kangamá kaka na Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2020
mwb20 Avril lok. 7
Mobali moko azali kobwaka mayaka oyo ezali na boyokani na milimo mabe.

BOMOI YA BAKRISTO

“Bólongola banzambe ya bapaya”

Atako Yehova apesaki naino te mobeko oyo epekisaki kosambela bikeko, Yakobo ayebaki ete Yehova asɛngaka kokangama kaka na ye. (Kob 20:3-5) Na nsima, Yehova ayebisaki ye azonga na Betele, Yakobo apesaki motindo ete bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye bálongola bikeko na bango. Na yango, Yakobo asangisaki bikeko yango mpe akundaki yango, ezala mpe biloko ya matoi, oyo ntango mosusu ekokaki kozala na bikelakela. (Eb 35:1-4) Na ntembe te, Yehova asepelaki na makambo oyo Yakobo asalaki.

Lelo oyo mpe, tokoki kosala nini mpo tókangama kaka na Yehova? Tosengeli koboya eloko nyonso oyo ezali na boyokani na losambo ya bikeko to misala ya bilimo mabe. Yango esangisi kokabwana na eloko nyonso oyo ezali na boyokani na bademo mpe kotalela malamumalamu kominanola oyo tosalaka. Na ndakisa, omituna boye: ‘Nasepelaka na babuku to bafilme oyo elobelaka ba-vampire, ba-zombi, to makambo oyo eleki mayele ya bato? Babuku to bafilme yango emonisaka ete maji, kolɔka, to kolakela bato mabe ezali likama te?’ Tosengeli kozala mosika na biloko nyonso oyo Yehova ayinaka.​—Nz 97:10.

TALÁ VIDEO “BÓTƐMƐLA ZABOLO,” MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Balatisi bebe moko nsinga ya mpungu na lobɔkɔ mpe balalisi ye na mbeto. Na ngámbo mosusu, mama na ye oyo azali moyekoli ya Biblia, azali kosolola na babalani oyo bayekolaka na ye Biblia.

    Likambo nini ekómelaki moyekoli ya Biblia na nkombo Palesa?

  • Babalani yango elongo na moyekoli na bango ya Biblia bakutani na bankulutu mpo básalisa bango.

    Mpo na nini ezali likambo ya bwanya koluka lisalisi epai ya bankulutu ntango bademo batungisi biso?

  • Moyekoli ya Biblia azali kotumba nsinga ya mpungu oyo alatisaki bebe na ye na mɔtɔ esika alambaka.

    Bótɛmɛla Zabolo, mpe bópusana penepene na Nzambe.​—Yk 4:7, 8

    Soki tolingi Yehova abatela biso, biloko nini tosengeli kolongola to kobwaka?

  • Ekateli nini ya ntina mingi Palesa azwaki?

  • Esika ofandi, makambo nini okoki koboya mpo bademo bátungisa yo te?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto