BOMOI YA BAKRISTO
Tɛlɛmá ngwi lokola nsuka ezali se kokóma pene
MPO NA NINI EZALI NA NTINA: Mosika te makambo ya nsɔmɔ ekotya mpiko mpe bosembo na biso epai ya Yehova na komekama na ndenge oyo esalemá naino te. Bolɔzi monene ekobanda ntango mangomba ya lokuta ekobebisama. (Mt 24:21; Em 17:16, 17) Na ntango wana ya yikiyiki, mbala mosusu tokosakola na mpiko nsango ya etumbu. (Em 16:21) Goge ya Magoge ekobundisa biso. (Ezk 38:10-12, 14-16) Yehova akoyeisa “etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso” mpo na kokɔtela basaleli na ye. (Em 16:14, 16) Mpo tóyika mpiko na makambo oyo ezali koya, tosengeli kosala makasi tótikala ngwi na komekama oyo tozali kokutana na yango lelo oyo.
NDENGE YA KOSALA YANGO:
Na mpiko nyonso kobá kolongisa mibeko ya sembo ya Yehova.—Yis 5:20
Kobá kosambela Nzambe elongo na bandeko ya lisangá.—Ebr 10:24, 25
Tosáká na motema moko malako oyo eutaka na ebongiseli ya Yehova.—Ebr 13:17
Manyoláká na ndenge oyo Yehova abikisaki bato na ye na ntango ya kala.—2Pe 2:9
Bondeláká Yehova, mpe tyeláká ye motema.—Nz 112:7, 8
TALÁ VIDEO MAKAMBO OYO EKOSƐNGA MPIKO NA MIKOLO EZALI KOYA—VIDEO YA MOKUSE, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:
Likambo nini emekaki botosi ya basakoli ntango batindaki bango na masangá mosusu?
Ndenge nini mpiko ná botosi etambolaka nzela moko?
Mpo na nini ekosɛnga kozala na mpiko ntango Armagedone ekoya?
Omibongisa banda sikoyo mpo na makambo oyo ezali koya oyo ekosɛnga komonisa mpiko
Lisolo nini ya Biblia ekoki kosalisa biso tókómisa kondima na biso makasi na nguya oyo Yehova azali na yango ya kobikisa?—2Nt 20:1-24