MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | KOBIMA 15-16
Kumisá Yehova na loyembo
Miziki ekoki kobongisa to kobebisa makanisi na biso. Ekoki mpe kosala ete tómiyoka malamu to te. Koyemba ezali na esika monene na losambo na biso mpo na Yehova.
Nsima ya kobika na ndenge ya likamwisi na Mbu Motane, Moize ná Bayisraele mosusu bakumisaki Yehova na loyembo
Mokonzi Davidi aponaki mibali 4 000 mpo bázala babɛti-miziki mpe bayembi na tempelo
Na butu ya nsuka liboso akufa, Yesu ná bantoma na ye ya sembo bayembaki nzembo mpo na kokumisa Yehova
Mabaku nini nazali na yango ya kokumisa Yehova na loyembo?